Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now the Accuser rose up against Israel and incited David to count Israel. Satana atelemelaki Isalaele mpe atindikaki Davidi na kotanga motango ya bato ya Isalaele.
2 David told Joab and the army's commanders, "Go, count Israel from Beersheba to Dan, and report to me, so I may know their number." Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato : — Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba.
3 Joab said, "May our Father add to his people a hundredfold! My lord king, are all these not my lord's servants? Why does my lord ask for this? Why bring guilt on Israel?" Kasi Joabi azongisaki : — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ?
4 But the king overrode Joab, so Joab went out, traveled through all Israel, then came to Jerusalem. Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi. Boye, Joabi abimaki, atambolaki kati na Isalaele mobimba mpe azongaki na Yelusalemi.
5 Joab gave David the census count: All Israel had one million 100,000 swordsmen, Judah 470,000 swordsmen. Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda.
6 He did not count Levi and Benjamin, for Joab detested the king's command. Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame ; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.
7 This was deeply wrong in our Father's sight, so he struck Israel. Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.
8 Then David said to our Father, "I have sinned greatly in doing this. Now, please take away your servant's guilt, for I have acted very foolishly." Davidi alobaki na Nzambe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
9 And our Father spoke to Gad, David's seer: Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi :
10 Go and say to David, "Your Father says: I hold three things over you—choose one of them, and I will do it to you." — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
11 Gad came to David and said to him, "This is what our Father says: 'Choose for yourself, Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Tala makambo oyo Yawe alobi : « Oponi etumbu nini :
12 either three years of famine, or three months swept before your foes as their sword overtakes you, or three days of the sword of our Father: plague in the land, the angel of our Father destroying throughout all Israel's territory.' Now decide what answer I bring back to the one who sent me." mibu misato ya nzala makasi ; sanza misato oyo banguna na yo bakolonga yo mpe mipanga na bango ekoboma basoda na yo ; to mikolo misato elongo na mopanga ya Yawe mpe bokono oyo ebomaka, mikolo oyo anjelu ya Yawe akobebisa etuka nyonso ya Isalaele ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. »
13 David told Gad, "I'm in great distress. Let me fall into our Father's hand, for his compassion is very great—but not into the hand of man." Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi kati na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato !
14 So our Father sent a plague on Israel, and 70,000 men of Israel fell. Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, mpe bato ya Isalaele nkoto tuku sambo bakufaki.
15 And our Father sent an angel to destroy Jerusalem; but as the angel destroyed it, our Father saw and relented from the calamity, and said to the angel, "Enough! Stay your hand." The angel of our Father stood by the threshing floor of Ornan the Jebusite. Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango ; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
16 David looked up and saw the angel of our Father standing between earth and heaven, sword drawn in hand, reaching out over Jerusalem. Then David and the elders, covered in sackcloth, fell facedown. Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
17 David said to our Father, "Was it not I who ordered the people counted? I am the one who sinned and did great evil. But these sheep—what have they done? O my Father, let your hand be against me and my father's house, not against your people with plague." Davidi alobaki na Nzambe : — Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato ? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo !
18 The angel of our Father told Gad to have David go up and build an altar to our Father at Ornan the Jebusite's threshing floor. Anjelu na Yawe atindaki Gadi koloba na Davidi : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
19 So David went up at Gad's direction, which he had spoken in the name of our Father. Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe.
20 Ornan turned and saw the angel; his four sons with him hid. He had been threshing wheat. Bongo, wana Orinani azalaki kotuta ble, abalukaki mpe amonaki anjelu. Boye bana na ye ya mibali minei oyo bazalaki na ye elongo babombamaki.
21 When David came to Ornan, Ornan looked and saw David, left the threshing floor, and bowed to David, face to the ground. Davidi apusanaki pembeni ya Orinani ; mpe tango Orinani atalaki mpe amonaki Davidi, abimaki na etando mpe agumbamaki liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.
22 David said to Ornan, "Give me this threshing-floor site so I can build an altar to our Father on it; give it to me at full price, so the plague is held back from the people." Davidi alobaki na Orinani : — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.
23 Ornan said to David, "Take it. Let my lord the king do what he sees fit. Look, I give the oxen for burnt offerings, the threshing sledges for wood, and the wheat for the grain offering—I give it all." Orinani azongiselaki Davidi : — Kamata yango ; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana.
24 But King David said to Ornan, "No, I will surely buy it at full price. I won't take what is yours for our Father, or offer burnt offerings that cost me nothing." Kasi mokonzi Davidi alobaki na Orinani : — Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; nakomema te epai na Yawe eloko oyo ezali ya yo, nakobonzela Yawe te bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.
25 So David paid Ornan about fifteen pounds of gold for the site. Boye, Davidi asombaki etando yango epai ya Orinani, na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo, nkama motoba.
26 David built an altar there to our Father, offered burnt offerings and peace offerings, and called on our Father, who answered him with fire from heaven on the altar of burnt offering. Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
27 Then our Father commanded the angel, and he put his sword back into its sheath. Boye Yawe alobaki na anjelu, mpe anjelu azongisaki mopanga na ye na ebombelo na yango.
28 At that time, when David saw our Father had answered him at Ornan the Jebusite's threshing floor, he sacrificed there. Banda na tango wana, lokola Davidi amonaki ete Yawe ayanolaki ye na etando ya Orinani, moto ya Yebusi, akomaki kobonza bambeka tango nyonso na esika wana.
29 Moses had made the tabernacle of our Father in the wilderness; it, with the altar of burnt offering, stood then at Gibeon's high place. Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.
30 David could not go there to seek our Father, for he feared the sword of the angel of our Father. Nzokande Davidi azalaki kokoka te kozwa mokano ya kokende kotuna Nzambe liboso ya Mongombo, pamba te azalaki kobanga mopanga na Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]