Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Some time later, Nahash king of the Ammonites died, and his son became king in his place. Sima na mwa tango, Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, akufaki, mpe mwana na ye ya mobali akitanaki na ye na bokonzi.
2 David said, "I'll show kindness to Hanun son of Nahash, since his father showed kindness to me." So David sent messengers to comfort him over his father. But when David's servants came to the land of the Ammonites, to Hanun, to comfort him, Davidi amilobelaki : « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, pamba te tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato epai ya Anuni mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki epai ya Anuni, na mokili ya bato ya Amoni, mpo na kobondisa ye,
3 Ammon's commanders told Hanun, "Does David really honor your father by sending you comforters? Haven't his servants come to you to search out, overthrow, and spy on the land?" bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Bato wana bayei epai na yo mpo na kotala mpe kononga mokili mpo ete babebisa yango. »
4 Hanun seized David's servants, shaved them, cut their garments in half at the hips, sent them away. Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango mandefu, akataki bango bilamba kino na likolo ya mipende mpe abenganaki bango.
5 When they told David about the men, he sent messengers to meet them, since they were badly ashamed. The king said, "Stay in Jericho till your beards grow, then return." Tango bayebisaki Davidi makambo oyo ekweyelaki bato wana, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bango, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo : « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota, sima nde bokozonga. »
6 When the Ammonites saw they'd become a stench to David, Hanun and the Ammonites sent about thirty-eight tons of silver to hire chariots and horsemen from Aram-naharaim, Aram-maacah, and Zobah. Tango bato ya Amoni bamonaki ete bamilukeli makambo epai ya Davidi, Anuni mpe bato ya Amoni batindaki bakilo ya palata nkoto tuku misato epai ya bato ya Siri ya Mezopotami, ya Maaka mpe ya Tsoba, mpo na kodefa bashar mpe basoda oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda.
7 They hired 32,000 chariots, plus the king of Maacah and his troops, who came and camped opposite Medeba. The Ammonites gathered from their cities and came out to fight. Badefaki bashar, basoda nkoto tuku misato na mibale oyo babundaka likolo ya bampunda, mpe mokonzi ya Maaka elongo na mampinga na ye. Bongo, bayaki kotonga molako na bango pembeni ya Medeba. Kaka na tango yango, bato ya Amoni basanganaki na engumba na bango mpe babimaki mpo na kobunda.
8 When David heard of it, he sent Joab and the whole army of fighting men. Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko.
9 The Ammonites marched out and lined up for battle at the city's entrance, while the kings who had come stood alone in the field. Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba na bango ; kasi bakonzi oyo bayaki bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.
10 Joab saw the battle was set against him, front and rear, so he chose Israel's best troops and lined them up against the Arameans. Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele, oyo baleki na mpiko mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.
11 He put the rest of the troops under his brother Abishai, and they lined up against the Ammonites. Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi ; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.
12 Joab said, "If Aram overpowers me, rescue me; if Ammon overpowers you, I'll rescue you. Joabi alobaki : « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai ; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakosunga yo.
13 Be strong; let us fight courageously for our people and our Father's cities, and may our Father do what is good in his eyes." Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
14 Then Joab and the troops with him advanced to fight the Arameans, and they fled before him. Boye, Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri ; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
15 Seeing Aram had fled, the Ammonites also fled before Abishai his brother and came into the city. Joab then came to Jerusalem. Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mpe bazongaki na engumba. Bongo, Joabi azongaki na Yelusalemi.
16 When the Arameans saw that Israel had defeated them, they sent messengers and brought out the Arameans from beyond the Euphrates, with Shophach, commander of Hadadezer's army, at their head. Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, batindaki bantoma kobenga bato mosusu ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale Efrate. Tsofaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
17 David was told; he gathered all Israel, crossed the Jordan, came against them, and lined up for battle. David lined up for battle against the Arameans, and they fought him. Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe akatisaki Yordani ; apusanaki mpe asalaki molongo ya bitumba liboso na bango ya bato ya Siri, mpe bato ya Siri babundisaki ye.
18 The Arameans fled before Israel. David killed 7,000 of their charioteers and 40,000 foot soldiers, then killed Shophach, commander of their army. Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki basoda na bango, nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na makolo. Davidi abomaki lisusu Tsofaki, mokonzi na bango ya mampinga.
19 When Hadadezer's servants saw Israel had defeated them, they made peace with David and served him. Aram was no longer willing to help the Ammonites. Tango bawumbu ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na Davidi mpe bakomaki na se ya bokonzi na ye. Boye bato ya Siri balingaki lisusu te kosunga bato ya Amoni.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]