Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this, David defeated the Philistines, subduing them, and took Gath and its villages from the Philistines' hand. Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki na maboko ya bato ya Filisitia engumba Gati elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
2 He also defeated Moab, and the Moabites became subject to David and brought him tribute. Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi. Bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.
3 David defeated Hadadezer king of Zobah, up to Hamath, going to extend his power to the Euphrates River. Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, na engumba Amati, tango Adadezeri akendeki kovandisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.
4 David captured from him 1,000 chariots, 7,000 horsemen, and 20,000 foot soldiers. He hamstrung all the chariot horses, keeping enough for one hundred chariots. Davidi abotolaki Adadezeri bashar nkoto moko, akangaki basoda nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.
5 When Aram of Damascus came to help Hadadezer king of Zobah, David struck down 22,000 Arameans. Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
6 David placed garrisons in Aram-Damascus; the Arameans became his servants, paying tribute. And our Father gave David victory wherever he went. Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri ; boye bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
7 David took the gold shields carried by Hadadezer's officers and brought them to Jerusalem. Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.
8 From Tibhath and Cun, Hadadezer's cities, David took huge amounts of bronze; with it Solomon made the bronze Sea, the pillars, and bronze vessels. Na Tibati mpe na Kuni, bingumba ya mokonzi Adadezeri, Davidi azwaki bronze ebele oyo, na mikolo oyo elandaki, Salomo asalaki na yango nzungu ya monene, makonzi mpe bisalelo mosusu ya bronze.
9 When Tou king of Hamath heard David had defeated Hadadezer king of Zobah's whole army, Tango Towu, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri, mokonzi ya Tsoba,
10 he sent his son Hadoram to King David to greet and bless him for fighting and defeating Hadadezer, who had often warred with Tou. Hadoram brought gold, silver, and bronze articles of every kind. atindaki Adorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Towu. Adorami amemelaki Davidi lolenge nyonso ya biloko ya wolo, ya palata mpe ya bronze.
11 King David dedicated these to our Father, with the silver and gold he had taken from all the nations: Edom, Moab, the Ammonites, the Philistines, and Amalek. Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango epai na Yawe, ndenge asalaki na wolo mpe palata oyo azwaki na bikolo nyonso, na Edomi, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki.
12 Abishai son of Zeruiah struck down 18,000 Edomites in the Valley of Salt. Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, abomaki bato ya Edomi nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.
13 David placed garrisons in Edom; all Edomites became his subjects, and our Father gave him victory wherever he went. Davidi atiaki bayangeli kati na Edomi, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
14 So David reigned over all Israel, administering justice and righteousness for all his people. Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, mpe azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.
15 Joab son of Zeruiah commanded the army; Jehoshaphat son of Ahilud was recorder; Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ;
16 Zadok son of Ahitub and Ahimelech son of Abiathar were priests; Shavsha was secretary; Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Abimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Shavisha azalaki mokomi mikanda ;
17 Benaiah son of Jehoiada led the Cherethites and Pelethites; David's sons served as top officials beside the king. Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]