Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 What then should we say that Abraham, our physical forefather, has found? Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso ? Azwaki nini na bomoto ?
2 For if Abraham was justified by works, he has something to boast about—but not before our Father. Soki Abrayami atangamaki lokola moto ya sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa ; kasi liboso ya Nzambe, ezali bongo te !
3 For what does Scripture say? Abraham believed our Father, and it was counted to him as righteousness. Makomi elobi nini ? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »
4 To the one who works, wages aren't credited as a gift but as what's owed. Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi lokola motoki na ye.
5 But to one who does not work, but trusts him who justifies the wicked, his faith is counted as righteousness. Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.
6 As David also speaks of the blessing of the person our Father credits righteousness to, apart from works: Davidi mpe alobaki bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo na kozanga misala :
7 "Blessed are those whose lawless deeds are forgiven, and whose sins are covered; « Esengo na bato oyo mabe na bango elimbisami, mpe masumu na bango elongwe !
8 blessed is the one whose sin our Father will never count against him." Esengo na moto oyo Nkolo atangelaka lisumu te ! »
9 Is this blessing only for the circumcised, or also the uncircumcised? We say Abraham's faith was credited as righteousness. Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te ? Solo, tozali koloba : Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
10 How then was it credited? While he was circumcised, or uncircumcised? Not while circumcised, but while uncircumcised. Esalemaki tango nini ? Esalemaki liboso na ye kokatisa ngenga to sima na ye kokatama ngenga ? Esalemaki te sima na ye kokatama ngenga ; esalemaki nde liboso na ye kokatisa ngenga.
11 He received circumcision as a sign, a seal of the righteousness he had by faith while still uncircumcised, so he would be father of all who believe though uncircumcised, with righteousness credited to them too, Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo,
12 and father of the circumcised who are not only circumcised but also walk in the footsteps of the faith our father Abraham had while uncircumcised. mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga.
13 For the promise to Abraham and his offspring that he would inherit the world did not come through the law, but through faith's righteousness. Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bapesamelaki elaka ya kozwa mokili lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima.
14 For if those who live by the law are heirs, faith is emptied and the promise nullified. Pamba te soki ezali bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa libula yango, wana kondima ezali lisusu na tina te mpe elaka ezali te,
15 Law brings wrath; where there is no law, there is no violation. pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.
16 So it comes by faith, to be by grace, guaranteeing the promise to all the offspring—not only those tied to the law but also those who share Abraham's faith, father of us all, Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,
17 as it is written, "I have made you father of many nations"—before our Father, in whom he believed, who gives life to the dead and calls things that do not exist into being. kolanda ndenge ekomama : « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te.
18 Against hope, he believed in hope, becoming father of many nations, as he'd been told: "So will your offspring be." Atako Abrayami akokaki lisusu te kotia elikya, kasi atiaki kaka elikya mpe andimaki ; boye akomaki tata ya bikolo ebele, kolanda ndenge Nzambe aloba mpo na ye : « Bakitani na yo bakozala ebele. »
19 Not weak in faith, he considered his own body already as good as dead—he was about one hundred—and Sarah's womb lifeless. Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te.
20 He did not doubt our Father's promise in lack of faith, but was strengthened in faith, giving glory to our Father, Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo,
21 fully convinced that what our Father had promised he was also able to do. wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye.
22 That is why "it was credited to him as righteousness." Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
23 But the words "it was credited to him" were written not for his sake alone, Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama : « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo ; »
24 and also for us who will be credited with it—those trusting the one who raised our Lord Jesus from the dead, ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso,
25 who was delivered over for our sins and raised to make us right with our Father. oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]