Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 What advantage, then, does the Jew have? Or what is the value of circumcision? Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini ? Kokatama ngenga ezali na tina nini ?
2 Much in every way. First of all, they were entrusted with the very words of our Father. Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.
3 What then? If some were unfaithful, will their unfaithfulness nullify the faithfulness of our Father? Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe ?
4 No! Let our Father be true, though every person is a liar. As it is written: "You are proven right in your words, and win when judged." Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama : « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »
5 But if our wrongdoing highlights our Father's righteousness, what do we say? Is our Father unjust to bring wrath on us? (I speak in human terms.). Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini ? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye ? Nazali kaka kokanisa lokola moto.
6 Certainly not! For then how could our Father judge the world? Te, ezali bongo te ! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili ?
7 But if my lie makes our Father's truth overflow to his glory, why am I still judged as a sinner? To soki lokuta na ngai etalisi polele bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu ?
8 Why not say, as some slander us as saying, "Let's do evil so good may come"? Their judgment is deserved. Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.
9 What then? Are we better off? Not at all—we've already charged that Jews and Greeks alike are all under sin's grip, Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato mosusu ? Te, soki moke te ! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu.
10 as it is written: "There is no one righteous, not even one; Kolanda ndenge ekomama : « Moto ya sembo azali te, ata moko te ;
11 no one understands; no one seeks our Father. moto ya mayele azali te ; ata moto moko te alukaka Nzambe.
12 All have turned away; together they have become worthless; no one does good, not even one. Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moko te.
13 Their throat is an open grave; they use their tongues to deceive." "The venom of snakes is under their lips. Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
14 Their mouth is full of cursing and bitterness. Minoko na bango etonda na makambo ya bololo mpe na bilakeli mabe.
15 Their feet are swift to shed blood; Makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosopa makila.
16 ruin and misery mark their ways, Na bisika nyonso oyo balekelaka, batikaka kaka libebi mpe pasi ;
17 and the way of peace they have not known. bayebi nzela ya kimia te.
18 There is no fear of our Father before their eyes." Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango. »
19 We know whatever the law says applies to those under it, so every mouth is silenced and the whole world stands accountable to our Father. Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.
20 No one is made right before him by works of the law; the law brings awareness of sin. Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.
21 But now, apart from the law, our Father's righteousness has been revealed, testified to by the Law and the Prophets. Kasi sik’oyo, na kozanga kosalela Mobeko, Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango.
22 This righteousness of our Father comes through faith in Jesus Christ, to all who believe, for there's no distinction, Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano,
23 since all have sinned and fall short of the glory of our Father, pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ;
24 and are justified freely by his grace through the redemption that is in Christ Jesus. mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto.
25 Our Father presented him as the atoning sacrifice, through faith in his blood, to show his righteousness, since in his patience he had passed over sins committed before, Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.
26 to show his righteousness now, so he is both just and the justifier of whoever trusts in Jesus. Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu.
27 Where then is boasting? Excluded. By what law? Of works? No—by the law of faith. Boye, tina nini komikumisa ? Tina ezali te ! Na mobeko nini ? Na mobeko ya misala ? Te, kasi na nzela ya kondima.
28 For we maintain that a person is justified by faith apart from works of the law. Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te.
29 Or is our Father the Father of Jews only? Not the Father of Gentiles too? Yes, of Gentiles too, Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.
30 since our Father is one, he will justify the circumcised by faith and the uncircumcised through faith. Pamba te Nzambe azali kaka moko ; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo.
31 Do we cancel the law through this faith? Never—we confirm the law. Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]