Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Brothers and sisters, my heart's desire and prayer to our Father for Israel is for their salvation. Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai ya Nzambe ezali ete bana ya Isalaele babika.
2 I testify about them: they have zeal for our Father, but not according to knowledge. Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.
3 Ignorant of our Father's righteousness, seeking to establish their own, they did not submit to our Father's righteousness. Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
4 For Christ is the law's goal, so all who believe receive righteousness. Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete moto nyonso oyo akondima akoma moto ya sembo.
5 For Moses writes about the righteousness that is based on the law: "The one who does these things will live by them." Tala ndenge nini Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na Mobeko : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
6 But faith-based righteousness says: "Don't say in your heart, 'Who will go up to heaven?'" (that is, to bring Christ down). Kasi tala ndenge nini bosembo oyo ewutaka na kondima elobaka : « Komilobela te kati na motema na yo : ‹ Nani akomata kuna na Likolo ? › Ezali lokola kokitisa Klisto wuta na Likolo
7 "or 'Who will descend into the abyss?'" (that is, to bring Christ up from the dead). to mpe : ‹ Nani akokita kati na libulu monene mpe ya molili makasi ? › Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi. »
8 But what does it say? "The word is near you, in your mouth and in your heart"—meaning the word of faith we proclaim: Boye, elobaka penza nini ? « Liloba ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo. » Liloba yango nde ezali Liloba ya kondima, mpe yango nde tozali kotatola.
9 If you confess with your mouth Jesus is Lord and believe in your heart that our Father raised him from the dead, you will be saved. Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika ;
10 For with the heart you believe and are made right with our Father, with the mouth you confess and are saved. pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.
11 For the Scripture says, "Everyone who believes in him will not be put to shame." Makomi eloba : « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »
12 No difference between Jew and Greek: the same Lord is Lord of all, generous to all who call on him. Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye.
13 For "everyone who calls on the name of our Lord Jesus will be saved." Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.
14 So how can they call on one they haven't believed in? How can they believe in one they haven't heard of? How can they hear without someone preaching? Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te ?
15 How can they proclaim him unless they're sent? As written: "How beautiful are the feet of those bringing good news!" Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu ! »
16 But not all obeyed the good news, for Isaiah says, "Our Father, who believed our message?" Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki : « Nkolo, nani andimaki mateya na biso ? »
17 So faith comes from hearing, and hearing through the word about Christ. Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
18 But I ask: did they not hear? Yes, they did: "Their sound went out to all the earth, their words to the ends of the world." Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
19 But I ask, did Israel not know? First Moses says: "I will make you jealous by those not a nation, angry by a nation without understanding." Natuna lisusu : Bato ya Isalaele basosolaki te ? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba : « Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa, nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »
20 Isaiah is bold enough to say, "I was found by those not seeking me; I appeared to those not asking for me." Mpe Ezayi akomaki kino na koloba : « Namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te, namimonisaki epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai te. »
21 But about Israel he says, "All day long I stretched out my hands to a disobedient, defiant people." Kasi alobaki boye mpo na Isalaele : « Natandaki maboko na Ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga botosi mpe bato ya mito makasi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]