Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So I ask: has our Father rejected his people? Never—I too am an Israelite, from Abraham's line, tribe of Benjamin. Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.
2 Our Father didn't reject his people, whom he foreknew. Or don't you know what Scripture says of Elijah, how he pleads with our Father against Israel? Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele :
3 "Father, they killed your prophets, tore down your altars; I alone remain, and they seek my life." — Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki bitumbelo na Yo. Mpe ngai, natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka koboma ngai.
4 God's reply: "I've kept 7,000 men for myself who haven't bowed the knee to Baal." Kasi eyano nini Nzambe azongiselaki ye ? — Nabombi bato nkoto sambo mpo na Ngai, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te.
5 So too at the present time there is a remnant, chosen by grace. Ezali mpe bongo na tango oyo : ezali na mwa ndambo ya bato oyo Nzambe apona na ngolu na Ye.
6 But if by grace, no longer by works; otherwise grace would no longer be grace. Nzokande, lokola koponama yango esalemaki na ngolu, elakisi ete ezali likambo ya misala te ; soki te, ngolu ezali lisusu ngolu te.
7 What then? Israel didn't get what it sought; the chosen did, but the rest were hardened. Boye toloba lisusu nini ? Eloko oyo bana ya Isalaele bazalaki koluka, bazwaki yango te ; kaka bato oyo Nzambe aponaki kati na bango nde bazwaki yango. Bato mosusu bakoma mitema mabanga,
8 As it is written: "Our Father gave them a dulled spirit, eyes that can't see and ears that can't hear, to this day." kolanda ndenge ekomama : « Nzambe apesaki bango molimo ya pongi, miso mpo ete bamona te, mpe matoyi mpo ete bayoka te, kino na mokolo ya lelo. »
9 And David says, "Let their table become a snare, a trap, a stumbling block, and payback for them. Mpe Davidi azali koloba : « Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango, monyama, libaku ya kokweya mpe ya kozwa etumbu !
10 Let their eyes be darkened so that they cannot see, and bend their backs forever." Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela ! »
11 So I ask: did they stumble to fall completely? By no means! Rather, their failure brought salvation to the Gentiles, to make Israel jealous. Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.
12 If their sin enriches the world, and their failure enriches the Gentiles, how much more their full inclusion! Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki ?
13 I say this to you Gentiles: since I am apostle to the Gentiles, I honor my ministry, Nazali koloba na bino Bapagano : lokola nazali ntoma ya Bapagano, napesaka lotomo na ngai lokumu
14 in the hope that I may somehow make my own people jealous and save some of them. na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
15 If their rejection reconciled the world, what will their acceptance bring but life from the dead? Pamba te soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, koyambama na bango ekozala ndenge nini ? Boni, ekozala te bomoi kati na bakufi ?
16 If the firstfruit is holy, so is the batch; if the root is holy, so are the branches. Nzokande, soki mapa ya liboso oyo babonzeli Nzambe ezali bule, elingi koloba ete mapa nyonso oyo etikali ezali mpe bule ; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete bitape na yango mpe ezali bule.
17 If some branches were broken off, and you, a wild olive shoot, were grafted in among them, sharing the olive tree's rich root, Kasi soki bitape mosusu ekatamaki ; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki ; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,
18 don't boast over the branches. If you do, you don't support the root—the root supports you. kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatamaki. Soki omeki kobeta tolo, yeba malamu ete ezali yo te nde ozali komema mosisa, kasi ezali mosisa nde ezali komema yo.
19 Then you will say, "Branches were broken off so that I might be grafted in." Okoki mpe koloba : « Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango. »
20 True. They were broken off for lack of faith; you stand by faith. Don't be proud—fear instead. Olobi malamu ! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.
21 For if our Father did not spare the natural branches, neither will he spare you. Pamba te soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo.
22 So see our Father's kindness and severity: severity to the fallen, kindness to you—if you continue in it; otherwise you too will be cut off. Yango wana, sosola malamu boboto mpe kanda na Nzambe : kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe boboto epai na yo soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango. Soki te, yo mpe okokatama.
23 And if they don't remain in lack of faith, they too will be grafted in—our Father can graft them in again. Mpe soki bato ya Isalaele bawumeli te kati na kozanga na bango kondima, bakokangisa bango lisusu na nzete, pamba te Nzambe azali na makoki ya kokangisa bango lisusu na nzete.
24 If you were cut from an olive wild by nature and grafted, against nature, into a cultivated one, how much more will natural branches be grafted back into their own olive tree? Boye, soki yo owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ezala soki yango te nde ebimisaki yo, ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango ?
25 Brothers and sisters, I don't want you unaware of this mystery, so you aren't wise in your own eyes: Israel is partly hardened, until the full number of Gentiles comes in. Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.
26 So all Israel will be saved, as it is written: "The rescuer will come from Zion and remove evil from Jacob, Boye, bato nyonso ya Isalaele bakobika, kolanda ndenge ekomama : « Mokangoli akobimela na Siona, akolongola mabe kati na Jakobi.
27 and this will be my covenant with them, when I take away their sins." Mpe yango nde ekozala boyokani na Ngai elongo na bango tango nakolongola masumu na bango. »
28 In the gospel, they are enemies for your sake; in election, beloved because of the fathers. Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino ; kasi mpo na oyo etali koponama oyo Nzambe asalaki, bazali balingami na Ye likolo ya bakoko na bango,
29 For the gifts and the calling of our Father are irrevocable. pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.
30 For just as you once disobeyed our Father, but now have received mercy through their disobedience, Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda,
31 so they too now disobeyed, so that by the mercy shown you, they too may now receive mercy. ndenge wana mpe kozanga botosi na bango ya sik’oyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa mpo ete ayokela bango mpe mawa.
32 For our Father has bound everyone over to disobedience, that he may have mercy on all. Pamba te Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi mpo ete ayokela bato nyonso mawa.
33 Oh, the depth of the riches and the wisdom and the knowledge of our Father! How unsearchable are his judgments and how untraceable his ways! Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !
34 "For who has known the mind of our Father, or who has been his counselor? « Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ? Nani akomaki kopesa Ye toli ?
35 Or who has given a gift to him that he might be repaid?" Nani apesaki Nkolo eloko mpo ete Nkolo azongisela ye ? »
36 For from him and through him and to him are all things. To him be the glory forever. Amen. Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]