Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I speak truth in Christ, not lying—my conscience testifies with me in the Holy Spirit, Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu :
2 that I have great sorrow and unceasing anguish in my heart. motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.
3 I could wish myself cursed, cut off from Christ, for my brothers and sisters, my own people by blood. Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,
4 They are Israelites: theirs the full rights as sons, the glory, the covenants, the lawgiving, the worship, the promises. oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka
5 The ancestors are theirs; from them, by human descent, comes the Christ, who is God over all, blessed forever. Amen. mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !
6 This doesn't mean our Father's word has failed, for not all descended from Israel are Israel. Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,
7 Not all Abraham's offspring are his children; rather, "Your offspring will be named through Isaac." mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »
8 That is, the children of the flesh are not children of our Father, but children of the promise count as offspring. Elingi koloba ete bana nyonso oyo Abrayami abotaki bazali bakitani na ye te, kasi ezali kaka bana oyo abotaki kati na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye.
9 For the promise says: "At this time next year I will come, and Sarah will have a son." Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami : « Kaka na eleko oyo, nakozonga, mpe Sara akozala na mwana mobali. »
10 Not only that, but Rebekah too conceived by one man, our father Isaac, Esukaki kaka wana te : Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na nzela ya tata moko, Izaki, koko na biso.
11 though not yet born, having done nothing good or bad—so our Father's purpose by election might stand, Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,
12 not from works, but from him who calls, she was told: "the older will serve the younger." kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka : « Kulutu akosalela leki, »
13 As it is written, "Jacob I loved, but Esau I hated." kolanda ndenge ekomama : « Nalingaki Jakobi, kasi nayinaki Ezawu. »
14 What should we say then? Is there injustice with our Father? By no means! Boye toloba nini ? Mabe ezali kati na Nzambe ? Soki moke te !
15 For he tells Moses, "I will have mercy on whom I have mercy, and I will have compassion on whom I have compassion." Pamba te alobaki na Moyize : « Nakotalisa ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nakoyokela mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. »
16 So then it depends not on human will or exertion, but on our Father, who has mercy. Boye, yango ewuti te na posa to na makasi ya moto, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu.
17 For the Scripture says to Pharaoh: "I raised you up for this very reason, to show my power in you, and to have my name proclaimed in all the earth." Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon : « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »
18 So then he has mercy on whomever he wills, and he hardens whomever he wills. Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.
19 So you'll ask me, "Why does he still find fault? Who resists his will?" Bato bakoki koloba : « Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye ? »
20 But who are you, mere human, to argue with our Father? Does the molded say to its molder, "Why did you make me like this?" Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »
21 Does the potter not have authority over the clay, making from one lump a vessel for honor, another for dishonor? Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko ?
22 What if our Father, wanting to show his wrath and make known his power, patiently endured vessels of wrath prepared for destruction, Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ?
23 to reveal his glory's riches for vessels of mercy he prepared beforehand for glory, Okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, ba-oyo abongisa wuta kala mpo na nkembo ?
24 even us whom he has called, not from the Jews only but also from the Gentiles? Ezali biso nde Nzambe abengaki, kaka kati na Bayuda te kasi mpe kati na Bapagano,
25 As he says in Hosea, "I will call those not my children, my children, and her not beloved, beloved." kolanda ndenge azali koloba kati na mokanda ya Oze : « Nakobenga bato oyo bazalaka ya Ngai te bato na Ngai, mpe nakobenga ye oyo azalaka molingami na Ngai te molingami na Ngai. »
26 "And in the very place where it was said to them, 'You are not my people,' there they will be called 'children of the living Father.'" Mpe, « kaka na esika oyo balobaki na bango : ‹ Bozali bato na ngai te, › bakokoma kobenga bango ‹ bana na Nzambe na bomoi. › »
27 Isaiah cries out about Israel: "Though Israel's children number like sand of the sea, only a remnant will be saved, Ezayi agangaki na tina na Isalaele : « Ata soki motango ya bana ya Isalaele ezalaki lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakobika.
28 for our Father will carry out his sentence upon the earth, fully and without delay." Pamba te Nkolo akokokisa Liloba na Ye na mobimba na yango mpe na lombangu kati na mokili. »
29 And as Isaiah predicted: "Had the Father of heaven's armies not left us offspring, we'd have become like Sodom, made like Gomorrah." Ezali ndenge kaka Ezayi amisakolelaki : « Soki Nkolo, Mokonzi ya mampinga, atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore. »
30 What then should we say? Gentiles not pursuing righteousness attained righteousness, righteousness by faith; Boye, toloba lisusu nini ? Bapagano oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo bakomi sembo na nzela ya kondima,
31 but that Israel, who pursued a law of righteousness, did not reach that law. kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko atikali kokoma sembo te.
32 Why? Because they pursued it not through faith but as though through works. They stumbled on the stumbling stone, Mpo na nini ? Pamba te balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana babetaki libaku na libanga oyo ekweyisaka,
33 as it is written, "See, I am placing in Zion a stumbling stone, a rock that offends; whoever trusts him won't be put to shame." kolanda ndenge ekomama : « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato ; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]