Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Philippians 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So if any encouragement in Christ, any comfort from love, any deep communion in the Holy Spirit, any tenderness and compassion exist, Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,
2 complete my joy: think alike, love alike, unite in spirit, one in purpose. botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko.
3 Do nothing out of selfish ambition or empty conceit, but in humility consider others better than yourselves. Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.
4 Each of you should attend not only to your own interests, but also to others'. Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu.
5 Have this mindset among yourselves—one that is yours in Christ Jesus, Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.
6 who, existing in the form of our Father, did not consider equality with our Father something to be grasped, Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,
7 but emptied himself by taking on the form of a servant and being born in human likeness. kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto ;
8 And appearing as a human being, he humbled himself by becoming obedient to death—even death on a cross. amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.
9 Therefore our Father exalted him to the highest place and gave him the name that is above every name, Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,
10 so that at the name of Jesus every knee should bow, in heaven and on earth and under the earth, mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,
11 and every tongue confess that Jesus Christ is Lord, to the glory of our Father. mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.
12 So, my dear ones, as you've always obeyed—not only in my presence but now much more in my absence—keep working out your salvation with fear and trembling, Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;
13 for our Father works in you, giving both the will and the work for his good purpose. pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.
14 Do everything without grumbling or arguing, Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe,
15 so you may be blameless and pure, faultless children of our Father amid a crooked and depraved generation—shining among them like stars in the world, mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili
16 holding firmly to the word of life, so I can boast on Christ's day that I didn't run or work for nothing. mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te.
17 But even if I'm poured out as a drink offering on the sacrifice and service of your faith, I'm glad and rejoice with you all. Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.
18 So you too should be glad and rejoice with me. Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.
19 I hope, in the Lord Jesus, to send Timothy to you soon, so I too may be encouraged, knowing how you are. Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino.
20 I have no one else like him, who will genuinely care for your welfare. Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ;
21 For they all look after their own interests, not those of Jesus Christ. bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto.
22 You know Timothy's proven worth—like a son with a father, he served with me in the gospel work. Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.
23 So I hope to send him as soon as I see how things go with me, Yango wana nazali na elikya ya kotinda ye epai na bino tango kaka nakoyeba ndenge nini makambo na ngai ekosuka.
24 and I am confident in the Lord that I myself will come soon. Nandimisami solo kati na Nkolo ete nakoya kotala bino kala mingi te.
25 I thought it necessary to send Epaphroditus back to you—my brother, coworker, and fellow soldier, your messenger and servant for my needs. Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.
26 He has longed for you all, and is troubled that you heard he was sick. Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela.
27 Indeed he was sick, and nearly died. But our Father had mercy on him—not only him but me too, sparing me sorrow upon sorrow. Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.
28 So I'm more eager to send him, so seeing him again you'll rejoice and I'll worry less. Yango wana nazali kotinda ye noki penza mpo ete, tango bokomona ye lisusu, bosepela, mpe mawa na ngai esila.
29 Welcome him in the Lord with all joy, and honor people like him, Boyamba ye na esengo makasi kati na Nkolo mpe bomemiaka bato ya lolenge wana,
30 because he neared death for Christ's work, risking his life to make up your missing help to me. pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]