Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 34 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 And our Father spoke to Moses, saying, Yawe alobaki na Moyize :
2 "command the Israelites: when you enter the land of Canaan, this is the land that will fall to you as inheritance—the land of Canaan, within its borders. « Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo :
3 Your south side runs from the Zin wilderness along Edom's edge; your south border starts at the Dead Sea's end, eastward. Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo,
4 Your border will turn south of the Ascent of Akrabbim, cross to Zin, reach south of Kadesh-barnea, go on to Hazar-addar, and pass to Azmon. ekokita na sude ya ebandeli ya ngomba Akarabimi mpe ekoleka na Tsini kino na sude ya Kadeshi-Barinea ; ekokoba na Atsari-Adari mpe ekoleka na Atsimoni.
5 From Azmon the border turns to Egypt's Brook, ending at the Sea. Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene.
6 "Your western border will be the Mediterranean Sea and its coast. Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane.
7 "This will be your north border: from the Mediterranean Sea draw your line to Mount Hor. Na ngambo ya nor, mondelo na bino ekobanda na ebale monene Mediterane kino na ngomba Ori.
8 From Mount Hor mark a line to Lebo-hamath, ending at Zedad; Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi.
9 then the border will extend to Ziphron and end at Hazar-enan. This will be your northern border. Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor.
10 "You will mark out your eastern border from Hazar-enan to Shepham. Na ngambo ya este, mondelo na bino ekobanda na Atsari-Enani kino na Shefami ;
11 The border will go down from Shepham to Riblah, east of Ain, then go down and reach the slope east of the Sea of Chinnereth. longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,
12 The border goes down to the Jordan, ending at the Dead Sea. This will be your land, with its borders all around." kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo. Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › »
13 Moses commanded the Israelites: This is the land you will inherit by lot, which our Father commanded to give to the nine tribes and the half-tribe. Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo.
14 The tribe of Reuben's sons, by their fathers' houses, and the tribe of Gad's sons, by their fathers' houses, have already taken their inheritance; so has the half-tribe of Manasseh. Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango.
15 The two and a half tribes received their inheritance across the Jordan from Jericho, eastward toward the sunrise. Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. »
16 And our Father spoke to Moses, saying, Yawe alobaki lisusu na Moyize :
17 "names of the men who will divide the land for you as inheritance: Eleazar the priest and Joshua son of Nun. « Tala bato oyo bakokabola mokili kati na bino : Nganga-Nzambe Eleazari mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
18 And you will take one leader from each tribe to divide the land for inheritance. Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili.
19 These are the names of the men: from the tribe of Judah, Caleb the son of Jephunneh; Tala bakombo na bango : Mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
20 from the tribe of the sons of Simeon, Shemuel the son of Ammihud; mpo na libota ya Simeoni : Samuele, mwana mobali ya Amiwudi ;
21 from the tribe of Benjamin, Elidad the son of Chislon; mpo na libota ya Benjame : Elidadi, mwana mobali ya Kisiloni ;
22 from the tribe of the sons of Dan, a leader, Bukki the son of Jogli; mpo na libota ya Dani : mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili ;
23 from Joseph's sons: from Manasseh's tribe, leader Hanniel son of Ephod, mpo na bana ya Jozefi, libota ya Manase : mokambi Anieli, mwana mobali ya Efodi ;
24 and from the tribe of the sons of Ephraim, a leader, Kemuel the son of Shiphtan; libota ya Efrayimi : mokambi Kemweli, mwana mobali ya Shifitani ;
25 from the tribe of the sons of Zebulun, a leader, Elizaphan the son of Parnach; mpo na libota ya Zabuloni : mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki ;
26 from the tribe of the sons of Issachar, a leader, Paltiel the son of Azzan; mpo na libota ya Isakari : mokambi Palitieli, mwana mobali ya Azani ;
27 from the tribe of the sons of Asher, a leader, Ahihud the son of Shelomi; mpo na libota ya Aseri : mokambi Ayiwudi, mwana mobali ya Shelomi ;
28 and from the tribe of the sons of Naphtali, a leader, Pedahel the son of Ammihud." mpo na libota ya Nefitali : mokambi Padeyeli, mwana mobali ya Amiwudi. »
29 These are the ones our Father commanded to divide the inheritance among the children of Israel in the land of Canaan. Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]