Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 35 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses on the plains of Moab by the Jordan across from Jericho: Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko :
2 "Command the Israelites to give the Levites, from the inheritance they hold, cities to live in, and pastureland around them, for the Levites. « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.
3 The cities are theirs to live in; the pasturelands are for their cattle, livestock, and all their living creatures. Bingumba ekozala mpo na kovanda, mpe mabele ya zingazinga mpo na bibwele na bango, bisalelo na bango mpe banyama na bango nyonso.
4 "The pasturelands of the cities you give the Levites reach about 1,500 feet out from the city wall on every side. Mabele ya zingazinga ya bingumba oyo bokopesa na Balevi ekozala etando ya bametele pene nkama mitano kobanda na mir ya engumba.
5 Measure outside the city: about 3,000 feet on the east side, 3,000 on the south side, 3,000 on the west side, 3,000 on the north side, with the city in the middle. This is the pastureland for their cities. Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude ; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga.
6 "Of the cities you give the Levites, six are to be cities of refuge, for a killer to flee to; besides these, give forty-two cities. Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.
7 "All the cities that you give the Levites are to be forty-eight cities, together with their pasturelands. Na nyonso, bokopesa na Balevi bingumba tuku minei na mwambe, moko na moko elongo na mabele na yango ya zingazinga.
8 From Israel's territory, give the Levites cities—more from large tribes, fewer from small; each gives in proportion to the inheritance it received." Mpo na bingumba oyo bokopesa na Balevi wuta na libula ya mabele ya bana ya Isalaele, bosengeli kozwa yango kolanda bozwi ya libota moko na moko : libota oyo ezali na bingumba ebele ekopesa mpe bingumba ebele ; libota oyo ezali na bingumba moke ekopesa mpe bingumba moke. »
9 Our Father spoke to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
10 "Speak to the Israelites and tell them: When you cross the Jordan into the land of Canaan, « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na Kanana,
11 choose cities for yourselves, cities of refuge, where anyone who kills a person unintentionally may flee there. bokopona bingumba ya kokimela mpo ete moto oyo akoboma moto na nko te akoka kokima kuna.
12 These cities are a refuge for you from the blood avenger, so the killer won't die until standing before the assembly for judgment. Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila ; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga.
13 The cities you give are to be six cities of refuge for you. Kati na bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ekozala ekimelo mpo na bino :
14 Give three cities beyond the Jordan and three cities in the land of Canaan; they are to be cities of refuge. misato na ngambo ya Yordani, mpe misato kati na Kanana. Ekozala bingumba ya kokimela.
15 These six cities are a refuge for Israelites, the foreigner, and the temporary resident among them, so anyone who kills a person by accident may flee there. Bingumba nyonso motoba ekozala ekimelo mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na bapaya oyo bakozala kati na bino. Boye moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokima kuna.
16 "But if someone strikes another with an iron object and the victim dies, the attacker is a murderer—the murderer must be put to death. Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye.
17 If he struck him with a stone in his hand that could kill, and he died, he is a murderer; the murderer must be put to death. Soki abeti moninga na ye libanga, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye.
18 Or if he struck him with a deadly wooden tool in hand, and he died, he is a murderer; the murderer must be put to death. Soki abeti moninga na ye nzete, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye.
19 The avenger of blood is to kill the murderer himself; when he meets him, he is to kill him. Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi : akoboma ye tango kaka akokutana na ye.
20 If he pushed him from hatred, or threw something at him in ambush, so he died, Soki abambi moninga na ye eloko na nko mpe moninga yango akufi
21 or if he struck him with his hand out of hatred and he died, the striker must be put to death—he is a murderer. The avenger of blood is to kill the murderer when he finds him. to soki abeti moninga na ye likofi mpo ete alingaka ye te, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; boye mobukanisi makila akoboma mobomi tango kaka akokutana na ye.
22 "But if he shoved him suddenly without hostility, or threw anything at him without ambush, Kasi soki moto atindiki moninga na ye na nko te to na kokana te, soki abambi ye eloko na makanisi mabe te,
23 or, without seeing him, dropped on him a stone able to kill, and he died—not his enemy, not seeking his harm, soki akweyiseli ye libanga na nko te mpe na kokana te, mpe moninga yango akufi,
24 then the assembly is to judge between the slayer and the avenger of blood according to these rules. lisanga ekokata makambo oyo kolanda mibeko kati ya mobomi mpe mobukanisi makila.
25 The assembly must rescue the killer from the blood avenger's hand and return him to the city of refuge he fled to; he must stay there until the high priest anointed with holy oil dies. Lisanga ekokangola mobomi na maboko ya mobukanisi makila mpe ekozongisa ye kati na engumba ya kokimela epai wapi akimaki. Mobomi akovanda kuna kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo bapakolaki mafuta ya bule.
26 "But if the killer ever leaves the border of his refuge city, where he fled, Nzokande soki mobomi alongwe na engumba ya kokimela epai wapi akimaki,
27 if the avenger of blood finds him outside his city of refuge's border and kills the killer, he incurs no bloodguilt. mpe soki mobukanisi makila akutani na ye libanda ya engumba na ye ya kokimela mpe abomi ye, mobukanisi makila asali mabe te.
28 The killer must stay in his city of refuge until the high priest dies; only after the high priest's death may he return to his own land. Pamba te mobomi asengeli kovanda kati na engumba na ye ya kokimela kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Ezali kaka sima ya kufa na ye nde akoki kozonga na mabele na ye.
29 These are to be a permanent law for you throughout your generations, in every place where you live. Mitindo oyo ekozala mibeko mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino nyonso, na bisika nyonso oyo bokovanda.
30 "Anyone who kills a person is to be executed as a murderer, on witnesses' testimony; one witness alone cannot testify against a person to cause death. Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa.
31 "Take no ransom for a murderer's life who deserves death—he must be executed. Bokondima kozwa eloko moko te mpo na kosikola bomoi ya mobomi oyo asengeli na kufa ; basengeli kaka koboma ye.
32 Take no ransom for someone who fled to his city of refuge, letting him return to live in the land before the priest dies. Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
33 "Don't pollute the land you live in—blood pollutes the land, and the land can have no atonement for blood shed on it except by the blood of the one who shed it. Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.
34 Don't make the land unclean—you live there, and I live among you; for I, your Father, live among Israel's people." Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda ; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]