Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 Moses told Israel's tribal heads: This is what our Father commanded. Moyize alobaki na bakambi ya mabota ya Isalaele : « Tala mobeko oyo Yawe asili kopesa :
3 When a man vows a vow to our Father, or swears an oath binding himself with a pledge, he must not break his word; he must do all his mouth has spoken. ‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye.
4 If a woman vows a vow to our Father and binds herself by a pledge while young, living in her father's house, Soki elenge moko ya mwasi alapi ndayi epai na Yawe, wana azali nanu na ndako ya tata na ye to azwi ekateli moko na nzela ya seleka,
5 when her father hears her vow and pledge binding her, and says nothing to her, all her vows and every pledge binding her stand. bongo tata na ye ayoki ndayi to ekateli yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekotikala se bongo.
6 But if her father forbids her the day he hears, none of her vows or bonds she bound herself with will stand; our Father will forgive her, because her father forbade her. Kasi soki tata na ye atelemeli ye tango ayoki yango, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekokoma pamba. Yawe akotangela ye yango te lokola niongo, pamba te tata na ye aboyi yango.
7 If she marries while under her vows, or under a rash promise she has made, Soki elenge mwasi yango abali sima na kolapa ndayi to sima monoko na ye kobimisa ekateli ;
8 and her husband hears of it and stays silent to her on the day he hears, her vows stand, and the bonds she bound herself with stand. bongo mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi oyo alapaki to ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.
9 But if her husband forbids her the day he hears, he cancels the vow binding her and the rash promise she made; and our Father will forgive her. Kasi soki mobali na ye atelemeli ye tango ayoki yango, akweyisi nde ndayi oyo ekangaki ye to ekateli oyo azwaki ye moko mpe ebimaki na monoko na ye. Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.
10 But a widow's or divorced woman's vow—everything she bound herself to—stands against her. Soki mwasi oyo akufisa mobali to oyo babengana na libala alapi ndayi to azwi ekateli ezala ya ndenge nini, asengeli kokokisa yango.
11 If she vowed in her husband's house, or bound herself by a pledge under oath, Soki mwasi ya libala alapi ndayi to azwi ekateli na nzela ya seleka ;
12 and her husband heard it, said nothing to her, and did not forbid her—so all her vows stand, and every pledge by which she bound herself stands. bongo, mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te mpe apekisi ye te, ndayi oyo alapaki mpe ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.
13 But if her husband nullifies them the day he hears, nothing she said—her vows or the pledge binding her—will stand: he has nullified them, and our Father will forgive her. Kasi soki mobali na ye akweyisi yango tango ayoki yango, ndayi moko te to ekateli moko te oyo ebimaki na monoko na ye ekotikala bongo. Pamba te mobali na ye akweyisi yango, mpe Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.
14 Any vow and any binding oath to humble herself, her husband may confirm or nullify it. Mobali na ye azali na bokonzi ya kondima to koboya ndayi nyonso oyo alapi to ekateli nyonso oyo asili kozwa na kokila bilei.
15 But if her husband stays silent to her from day to day, he confirms all her vows or obligations binding her; he confirms them, because he stayed silent to her on the day he heard them. Kasi soki mobali na ye alobi na ye eloko moko te kino na mokolo oyo ekolanda, elakisi ete asili kondima ndayi nyonso to ekateli nyonso oyo mwasi na ye azwaki. Andimi yango, pamba te alobi eloko moko te tango ayokaki yango.
16 But if he nullifies them after he has heard them, then he will bear her guilt. Nzokande, soki akweyisi ndayi to ekateli yango, sima na koyoka yango, ye nde akomema mokumba ya mbeba ya mwasi na ye. › »
17 These are the rules our Father commanded Moses, between a man and his wife, between a father and his young daughter still in his house. Tala bikateli oyo Yawe apesaki epai na Moyize na tina na boyokani kati na mobali mpe mwasi na ye, kati na tata mpe bilenge basi oyo bazali na ndako na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]