Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
2 "Avenge the Israelites against the Midianites; afterward you will be gathered to your people." « Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. »
3 So Moses told the people, "Arm men from among you for war, to go against Midian and carry out our Father's justice on Midian. Boye Moyize alobaki na bato : « Tika ete mibali kati na bino balata bibundeli mpo na kokende kobundisa mokili ya Madiani mpe kozongisela bango mabe na mabe, na Kombo na Yawe.
4 You are to send 1,000 from each of the tribes of Israel to the war." Libota moko na moko ya Isalaele ekotinda basoda nkoto moko na etumba. »
5 So from Israel's thousands, 1,000 per tribe were supplied—12,000 armed for war. Boye, baponaki bato nkoto moko mpo na libota moko na moko kati na mabota ya Isalaele. Bongo, bato nkoto zomi na mibale balataki bibundeli mpo na kokende na etumba.
6 Moses sent them to war, 1,000 from each tribe, with Phinehas son of Eleazar the priest, carrying the holy articles of the sanctuary and the signal trumpets in his hand. Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela.
7 They waged war against Midian, as our Father had commanded Moses, and they killed every male. Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso.
8 They killed the kings of Midian among the slain—Evi, Rekem, Zur, Hur, and Reba, Midian's five kings—and killed Balaam son of Beor with the sword. Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.
9 The people of Israel captured Midian's women and children, and plundered all their livestock, flocks, and goods. Bana ya Isalaele bakangaki basi mpe bana ya Madiani elongo na banyama, bibwele mpe bozwi na bango nyonso lokola bomengo ya bitumba.
10 They burned with fire all the cities where they lived and all their camps, Batumbaki bingumba nyonso epai wapi bato ya Madiani bazalaki kovanda, na milako na bango nyonso.
11 and they took all the spoil and all the plunder, both people and animals. Bamemaki bomengo nyonso ya bitumba mpe biloko nyonso oyo babotolaki elongo na bato, banyama ;
12 They brought the captives, plunder, and spoil to Moses, Eleazar the priest, and Israel's whole assembly, at the camp on Moab's plains by the Jordan, across from Jericho. mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.
13 Moses, Eleazar the priest, and all the assembly's leaders went to meet them outside the camp. Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bayaki koyamba bango na libanda ya molako.
14 But Moses was angry with the army's officers, commanders of thousands and commanders of hundreds, who returned from the battle. Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba.
15 Moses said to them, "Have you let all the women live? Moyize atunaki bango : « Boni, botiki basi nyonso na bomoi ?
16 Look, these women, on Balaam's advice, led Israel to betray our Father in the Peor incident, bringing the plague on the congregation of our Father. Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe.
17 Now kill every male child, and kill every woman who has slept with a man. Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ;
18 But keep alive for yourselves every young girl who has not slept with a man. kasi bobatela na bomoi mpo na bino, basi nyonso oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te.
19 Stay outside the camp seven days. Anyone who killed someone or touched a corpse must purify themselves on the third day and the seventh—you and your captives. Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino.
20 Purify every garment, every leather article, everything made of goats' hair, and every wood article." Bokopetola mpe lisusu bilamba nyonso mpe biloko nyonso oyo basala na baposo ya banyama, na suki ya bantaba to mpe na banzete. »
21 Eleazar the priest told the soldiers who had gone to war, "This is the statute of the law our Father commanded Moses: Nganga-Nzambe Eleazari alobaki na basoda oyo bakendeki na bitumba : « Botala bikateli ya mobeko oyo Yawe apesaki epai ya Moyize :
22 only the gold, the silver, the bronze, the iron, the tin, and the lead. ‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi
23 Everything that can withstand fire, pass through the fire—it becomes clean. But it must also be purified with water of purification. Whatever can't withstand fire, pass through the water. mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango ; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto.
24 Wash your clothes on the seventh day, and you'll be clean; then you may enter the camp." Na mokolo ya sambo, bokopetola bilamba na bino mpe bokokoma peto mpe na sima nde bokoki kozonga na molako. › »
25 Our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
26 "You, Eleazar the priest, and the family heads of the community, count the plunder taken, people and animals. « Yo, Moyize, mpe Nganga-Nzambe Eleazari, elongo na bakambi ya mabota ya lisanga ya Isalaele, botanga motango ya bato, ya banyama nyonso oyo bakangaki.
27 Divide the plunder into two: between the fighters who went to battle and the whole congregation. Kabola bomengo ya bitumba yango kati na basoda oyo bakendeki na bitumba mpe bato ya lisanga ya Isalaele oyo batikalaki.
28 From the soldiers who went out to battle, take a tax for me: one in 500—people, cattle, donkeys, and flocks. Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba.
29 Take it from their half and give it to Eleazar the priest as a contribution to me. Kamata mpako yango kati na ndambo ya eteni na bango mpe pesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari lokola eteni ya Yawe.
30 From the Israelites' half, take one in fifty—from the people, cattle, donkeys, flocks, and all the animals—and give them to the Levites who keep charge of my tabernacle." Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »
31 Moses and Eleazar the priest did as our Father had commanded Moses. Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari basalaki ndenge Yawe atindaki Moyize.
32 The plunder remaining from the spoil that the army had taken was 675,000 sheep, Bomengo ya bitumba oyo etikalaki na oyo basoda oyo bakendeki na bitumba babotolaki ezalaki : meme na bantaba nkoto nkama motoba na tuku sambo na mitano ;
33 72,000 cattle, ngombe nkoto tuku sambo na mibale ;
34 61,000 donkeys, ane nkoto tuku motoba na moko
35 and 32,000 persons in all—the women who had not slept with a man. mpe basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te nkoto tuku misato na mibale.
36 The half belonging to those who had gone out to war numbered 337,500 sheep, Ndambo ya eteni ya bomengo ya bitumba oyo bato oyo bakendeki na bitumba bazwaki ezalaki : bameme mpe bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano ;
37 and the tribute to our Father from the sheep was 675. mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bameme mpe bantaba nkama motoba na tuku sambo na mitano ;
38 The cattle were 36,000, of which the tribute to our Father was 72. bangombe nkoto tuku misato na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bangombe tuku sambo na mibale ;
39 The donkeys were 30,500, of which the tribute to our Father was 61. ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : ba-ane tuku motoba na moko ;
40 The persons were 16,000, of which the tribute to our Father was 32. bato nkoto zomi na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bato tuku misato na mibale.
41 Moses gave the tribute, our Father's contribution, to Eleazar the priest, as our Father commanded him. Moyize apesaki mpako mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe Eleazari ndenge Yawe atindaki ye.
42 As for the Israelites' half, which Moses had set apart from that of the men who fought, Boye, ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, oyo Moyize alongolaki na bomengo ya bato oyo bakendeki na bitumba,
43 the congregation's half was 337,500 sheep, ndambo oyo epesamelaki lisanga ezalaki : meme elongo na bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano ;
44 36,000 cattle, ngombe nkoto tuku misato na motoba ;
45 30,500 donkeys, ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano,
46 and 16,000 persons. mpe bato nkoto zomi na motoba.
47 From the Israelites' half, Moses took one of every fifty—people and animals—and gave them to the Levites in charge of our Father's tabernacle, as our Father had commanded Moses. Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe.
48 The officers over the army's units, the commanders of thousands and hundreds, came to Moses, Bongo, bakonzi ya mampinga, bakonzi ya bankoto ya basoda mpe ya bankama bayaki epai ya Moyize.
49 and said to him, "Your servants counted the fighting men under our command; not one of us is missing. Balobaki na Moyize : « Basali na yo batangi motango ya basoda oyo bazali na se ya bokonzi na biso mpe ata moko te azangi.
50 So we've brought our Father an offering—each man's find: gold articles, armlets, bracelets, signet rings, earrings, beads—to atone for ourselves before our Father." Boye, tomemi epai na Yawe lokola makabo, biloko ya wolo oyo : biloko oyo balataka na maboko, bapete, bamedayi, biloko ya matoyi, basheneti oyo moko na moko na biso azwaki mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe. »
51 Moses and Eleazar the priest received from them the gold, all the crafted articles. Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki na maboko na bango, biloko nyonso oyo basala na wolo.
52 All the gold of the contribution that they presented to our Father, from the commanders of thousands and the commanders of hundreds, came to about 420 pounds. Wolo nyonso oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki lokola makabo mpo na Yawe, na maboko ya bakonzi ya bankoto mpe ya bankama, ezalaki bakilo nkama moko na tuku mwambe na minei.
53 The men of war had each taken plunder for himself. Soda na soda akamataki na makasi mpo na ye moko bomengo na ye ya bitumba.
54 Moses and Eleazar the priest took the gold from the commanders of thousands and hundreds and brought it into the tent of meeting as a reminder for the Israelites before our Father. Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki wolo na maboko ya bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda mpe bamemaki yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele liboso ya Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]