Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus stepped into a boat, crossed over, and came to his own town. Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.
2 Some brought him a paralyzed man lying on a mat. Seeing their faith, Jesus told the paralyzed man, "Take heart, son; your sins are forgiven." Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.
3 At this, some of the teachers of the law said to themselves, "This man is blaspheming." Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema : — Moto oyo azali kotiola Nzambe !
4 Knowing their thoughts, Jesus said, "Why do you harbor evil in your hearts? Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?
5 Which is easier: to say, 'Your sins are forgiven,' or to say, 'Get up and walk'? Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »
6 But so you know the Son of Man has authority on earth to forgive sins"—then he told the paralyzed man, "Get up, take your mat, and go home." Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
7 And the man got up and went home. Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.
8 Seeing this, the crowds were awed and praised our Father, who gave people such authority. Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
9 Moving on from there, Jesus saw a man named Matthew sitting at the tax booth. "Follow me," he said. Matthew got up and followed him. Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
10 As Jesus ate in Matthew's house, many tax collectors and sinners joined him and his disciples at the table. Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.
11 Seeing this, the Pharisees asked his disciples, "Why does your teacher eat with tax collectors and sinners?" Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
12 On hearing this, Jesus said, "It is not the healthy who need a doctor, but the sick. Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
13 But go and learn what this means: 'I want mercy, not sacrifice.' For I didn't come to call the righteous, but sinners." Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
14 Then John's disciples came, asking him, "Why do we and the Pharisees fast often, but your disciples don't?" Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu : — Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ?
15 Jesus replied, "Can the groom's friends mourn while he's with them? But days are coming when the groom is taken from them—then they'll fast. Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
16 No one sews an unshrunk patch on an old garment; the patch pulls away from it, leaving a worse tear. Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
17 People don't pour new wine into old wineskins; otherwise the skins burst, the wine spills, and they're ruined. Instead, new wine goes into new wineskins, so both are kept." Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
18 While he spoke, a synagogue leader came, knelt before him, and said, "My daughter just died. But come, lay your hand on her, and she will live." Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
19 Jesus got up and went with him, and so did his disciples. Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
20 Just then a woman bleeding twelve years came up behind and touched his cloak's edge. Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,
21 She kept saying to herself, "If I only touch his cloak, I will be healed." pamba te azalaki komilobela : — Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
22 Jesus turned, saw her. "Courage, daughter," he said, "your faith has healed you." The woman was healed at that moment. Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.
23 When Jesus entered the synagogue leader's house and saw the flute players and the noisy crowd, Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.
24 he said, "Go away. The girl is not dead but asleep." But they laughed at him. Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.
25 When the crowd was sent out, he went in, took her hand, and the girl got up. Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
26 News of this spread through all that region. Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
27 As Jesus left there, two blind men followed, shouting, "Have mercy on us, Son of David!" Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
28 Entering the house, the blind men came to him. He asked, "Do you believe I am able to do this?" "Yes, Lord," they said. Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango : — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ? Bazongisaki : — Iyo, Nkolo !
29 Then he touched their eyes and said, "Let it be done to you according to your faith". Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki : — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !
30 Their eyes opened. Jesus warned them sternly, "See that no one knows about this." Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango : — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.
31 But they went out and spread the news about him all over that region. Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
32 As they went out, a mute, demon-possessed man was brought to Jesus. Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.
33 Once the demon was driven out, the mute man spoke. The crowds were amazed and said, "Nothing like this has ever appeared in Israel." Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !
34 But the Pharisees said, "He drives out demons by the prince of demons." Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
35 Jesus traveled every town and village, teaching in their synagogues, announcing the good news of our Father's kingdom, and healing every disease and sickness. Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.
36 Seeing the crowds, he felt compassion for them, because they were troubled and helpless, like sheep without a shepherd. Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.
37 Then he said to his disciples, "The harvest is plentiful but the workers are few. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke !
38 So ask the Father of the harvest to send out workers into his harvest field." Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]