Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When he came down from the mountain, great crowds followed him. Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.
2 A man with leprosy approached, knelt before him, saying, "Lord, if you're willing, you can make me clean." Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
3 Jesus reached out his hand and touched him: "I am willing; be clean." His leprosy vanished at once. Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ;
4 Jesus told him, "Tell no one, but go show yourself to the priest and offer the gift Moses commanded, as testimony to them." mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
5 When he entered Capernaum, a centurion came to him, appealing to him, Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.
6 and saying, "Lord, my servant is lying at home paralyzed, suffering terribly." Alobaki : — Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
7 He said to him, "I will come and heal him." Yesu azongiselaki ye : — Nakoya kobikisa ye.
8 The centurion replied, "Lord, I'm not worthy for you to come under my roof; just say the word, and my servant will be healed. Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
9 For I too am a man under authority, with soldiers under me. I tell one, 'Go,' and he goes; another, 'Come,' and he comes; my servant, 'Do this,' and he does it." Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
10 Hearing this, Jesus was amazed and told his followers, "Truly, I tell you, I have found no one in Israel with such faith. Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !
11 I tell you, many will come from east and west and sit at the table with Abraham, Isaac, and Jacob in our Father's kingdom, Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
12 but the kingdom's sons will be thrown into the outer darkness, where there will be weeping and grinding of teeth." Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
13 Jesus told the centurion, "Go, let it be done for you as you believed." His servant was healed that hour. Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo ! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
14 When Jesus entered Peter's house, he saw Peter's mother-in-law lying in bed with a fever. Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele.
15 He touched her hand; the fever left her, and she rose and served him. Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
16 That evening they brought him many oppressed by demons; he expelled the spirits with a word and healed everyone sick. Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.
17 This fulfilled the prophet Isaiah's words: "He took our weaknesses and carried our diseases." Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Amemaki mokumba ya pasi na biso mpe abikisaki biso na bokono na biso. »
18 When Jesus saw a crowd around him, he ordered them to cross to the other side. Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.
19 And a scribe came up and said to him, "Teacher, I will follow you wherever you go." Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki : — Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
20 Jesus told him, "Foxes have dens and birds of the sky have nests, but the Son of Man has nowhere to lay his head." Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
21 Another of the disciples said to him, "Lord, let me first go and bury my father." Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye : — Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.
22 But Jesus said to him, "Follow me, and leave the dead to bury their own dead." Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
23 When he got into the boat, his disciples followed him. Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
24 Suddenly a great storm arose on the sea, so waves covered the boat—but he was asleep. Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
25 So they woke him: "Lord, save us! We're dying!" Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga : — Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !
26 He said to them, "Why are you afraid, you of little faith?" Then he stood and rebuked the winds and sea, and a great calm followed. Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.
27 The men were amazed: "What kind of man is this—even winds and sea obey him?" Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
28 Crossing to the other side, to the region of the Gadarenes, two demon-possessed men came out of the tombs to meet him, so violent no one could pass that way. Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.
29 They shouted, "What do you want with us, Son of God? Have you come here to torment us before the time?" Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?
30 Now a herd of many pigs was feeding at some distance from them. Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki.
31 And the demons begged him, "If you cast us out, send us into the herd of pigs." Milimo mabe esengaki na Yesu : — Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
32 He told them, "Go." They came out and entered the pigs, and the whole herd rushed down the cliff into the sea and died in the waters. Yesu alobaki na milimo yango : — Bobima ! Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
33 The herdsmen fled into the city and reported everything, including what had happened to the demon-possessed men. Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.
34 The whole city came out to meet Jesus; seeing him, they begged him to leave their region. Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]