Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Do not judge, so that you may not be judged. Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te.
2 For you'll be judged by the judgment you use, and measured by the measure you give. Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.
3 Why look at the speck in your brother's eye but miss the log in your own? Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?
4 Or how can you tell your brother, 'Let me remove the speck from your eye,' when a log is in yours? Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso, › wana ozali na nzete kati na liso na yo ?
5 Hypocrite, first remove the log from your own eye; then you'll see clearly to remove the speck from your brother's eye. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
6 "Don't give dogs what is holy, or throw your pearls before pigs—they'll trample them underfoot, then turn and tear you apart. Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.
7 "Ask, and you'll receive it; seek, and you'll find; knock, and it'll open for you. Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;
8 For everyone who asks receives, whoever seeks finds, and whoever knocks, it will be opened. pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
9 Or what person among you, if his son asks him for bread, will give him a stone? Nani kati na bino apesaka na mwana na ye libanga, soki asengi ye lipa ?
10 Or if he asks for a fish, will give him a snake? To nani apesaka na mwana na ye nyoka soki asengi mbisi ?
11 So if you, being evil, know how to give your children good gifts, how much more will your Father in heaven give good things to those who ask him? Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?
12 "So in everything, treat people the way you want them to treat you; for this is the Law and the Prophets. Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.
13 "Enter through the narrow gate, for the gate is wide, the road broad, leading to destruction, and many enter through it. Bokotela na ekuke ya moke ; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.
14 But the gate is narrow, the road narrow, that leads to life; few find it. Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.
15 "Beware false prophets: they come to you in sheep's clothing but are ravenous wolves inside. Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.
16 By their fruit you will recognize them. Are grapes gathered from thornbushes, or figs from thistles? Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ?
17 In the same way, every good tree bears good fruit, but the bad tree bears bad fruit. Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe.
18 A good tree cannot bear bad fruit, nor can a bad tree bear good fruit. Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.
19 Every tree that does not bear good fruit is cut down and thrown into the fire. Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto.
20 So then, by their fruit you will recognize them. Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.
21 "Not everyone who says to me, 'Lord, Lord,' will enter the kingdom of our Father, but the one who does the will of my Father in heaven. Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
22 Many will say to me on that day, 'Lord, Lord, didn't we prophesy in your name, drive out demons in your name, do many miracles in your name?' Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›
23 Then I will tell them plainly: 'I never knew you; get away from me, you lawbreakers.' Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›
24 "So anyone who hears these words of mine and does them will be like a wise man whose house was built on the rock. Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.
25 Rain fell, floods came, winds blew and beat against that house, but it didn't fall, because it was founded on rock. Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango ; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga.
26 And everyone who hears these words of mine and doesn't do them is like a foolish man who built his house on sand. Nzokande, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba, kasi atie yango te na misala, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye na likolo ya zelo :
27 The rain fell, floods came, winds blew and hit that house, and it fell—and its fall was great." tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »
28 When Jesus had finished saying these words, the crowds were astonished at his teaching, Tango Yesu asilisaki koloba maloba oyo, bato nyonso bakamwaki makasi malakisi na Ye,
29 because he was teaching them as one who had authority, and not as their scribes. pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]