1"Take care not to practice your righteousness before others to be seen by them, or you have no reward from your Father in heaven.OLCBBosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino.
2So when you give to the needy, don't announce it with a trumpet, like the hypocrites do in synagogues and streets, to be praised by people. I assure you: they've already received their full reward.OLCBTango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
3But when you give to the needy, don't let your left hand know what your right hand does,OLCBKasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala,
4so that your gift stays secret. Your Father, who sees in secret, will repay you.OLCBmpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
5"When you pray, don't be like hypocrites who love praying standing in synagogues and on street corners to be seen by others. Truly, I tell you: they've already received their full reward.OLCBTango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
6But when you pray, go into your room, shut the door, and pray to your Father in secret. Your Father who sees in secret will reward you.OLCBKasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
7When you pray, don't babble like those who don't know the Father, because they think many words will get them heard.OLCBTango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.
8Do not be like them, for your Father knows what you need before you ask him.OLCBBosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.
9This, then, is how you should pray: 'Our Father in heaven, may your name be honored as holy,OLCBTala ndenge nini bosengeli kosambela : ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo ; tika ete Kombo na Yo ebulisama,
10your kingdom come, your will be done, on earth as it is in heaven.OLCBtika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !
11Give us today our daily bread.OLCBPesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ;
12And forgive us our debts, as we also have forgiven our debtors.OLCBlimbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;
13And lead us not into temptation, but deliver us from the evil one.'OLCBkomema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.] ›
14"For if you forgive others their sins, your heavenly Father will also forgive you.OLCBPamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ;
15But if you do not forgive others their sins, neither will your Father forgive your sins.OLCBkasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.
16"When you fast, don't look gloomy like the hypocrites—they disfigure their faces to show others they're fasting. Truly, I tell you, they have their full reward.OLCBTango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
17But when you fast, put oil on your head and wash your face,OLCBKasi tango yo ozali kokila bilei, sukola elongi na yo malamu mpe pakola moto na yo malasi,
18so you don't appear to others as fasting, but only to your Father, who is hidden. Then your Father, who sees what's hidden, will reward you.OLCBmpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.
19"Do not store up treasures for yourselves on earth, where moth and rust destroy, and thieves break in and steal.OLCBBonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.
20But store up treasures in heaven for yourselves, where neither moth nor rust destroys, and thieves can't break in and steal.OLCBKasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ;
21For where your treasure is, there your heart will be also.OLCBpamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.
22"The eye is the body's lamp. If your eye is clear, your whole body will be full of light.OLCBMiso ezali lokola mwinda ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole.
23But if your eye is bad, your whole body will be dark. If then the light in you is darkness, how great that darkness is!OLCBKasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.
24"No one can serve two masters: he'll hate one and love the other, or hold to one and despise the other. You can't serve our Father and money.OLCBMoto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.
25"So I tell you: don't worry about your life—what you'll eat or drink—or body—what you'll wear. Isn't life more than food, body more than clothes?OLCBYango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?
26Look at the birds in the sky: they don't plant, harvest, or store in barns, yet your heavenly Father feeds them. Aren't you worth more than they?OLCBBotala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
27Can any of you by worrying add a single hour to your life?OLCBNani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?
28And why worry about clothing? Consider the lilies of the field, how they grow: they don't work or spin.OLCBBongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ! Esalaka te mpe etongaka bilamba te ;
29Yet I tell you: not even Solomon, in all his glory, was dressed like one of these.OLCBnzokande, nazali koloba na bino ya solo ete ata Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
30If our Father clothes the field's grass like this—here today, thrown into the fire tomorrow—won't he much more clothe you, you of little faith?OLCBSoki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
31"So don't worry, asking, 'What will we eat?' or 'What will we drink?' or 'What will we wear?'OLCBYango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini ? ›
32For those who don't know the Father chase all these things, but your heavenly Father knows you need them.OLCBBiloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
33But seek first our Father's kingdom and his righteousness, and all these will be added to you.OLCBBolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
34So don't worry about tomorrow—it will worry about itself. Each day has enough trouble of its own."OLCBYango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.