Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Seeing the crowds, Jesus went up the mountain; when he sat down, his disciples came to him. Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,
2 And he opened his mouth and began to teach them, saying: mpe akomaki kopesa bango malakisi. Alobaki :
3 "Blessed are the poor in spirit, for theirs is the kingdom of our Father. « Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
4 Blessed are those who mourn, for they will be comforted. Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama !
5 Blessed are the meek, for they will inherit the earth. Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula !
6 Blessed are those who hunger and thirst for righteousness, for they will be satisfied. Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !
7 Blessed are the merciful, for they will receive mercy. Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !
8 Blessed are the pure in heart, for they will see our Father. Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe !
9 Blessed are the peacemakers, for they will be called children of our Father. Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe !
10 Blessed are those who are persecuted for righteousness' sake, for theirs is the kingdom of our Father. Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
11 "Blessed are you when people insult, persecute, and lie about every kind of evil against you because of me. Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai !
12 Rejoice and be glad, for your reward is great in heaven, for they persecuted the prophets before you the same way. Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
13 "You are the salt of the earth. But if salt loses its taste, how can it be salted again? It's no longer good for anything but being thrown out and trampled by people. Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.
14 "You are the light of the world. A city set on a hill cannot be hidden. Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.
15 No one lights a lamp and puts it under a basket, but sets it on a stand to light everyone in the house. Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.
16 Likewise, let your light shine before people, so they see your good works and glorify your Father in heaven. Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
17 "Don't think I came to abolish the Law or the Prophets—I didn't come to abolish them, but to fulfill them. Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli ; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.
18 For truly I tell you: until heaven and earth pass, not one letter, not one stroke, will pass from the Law until everything is done. Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.
19 So whoever breaks one of these least commands and teaches others the same will be called least in the kingdom of our Father; but whoever keeps and teaches them will be called great in the kingdom of our Father. Yango wana, moto nyonso oyo akobuka moko kati na mibeko oyo, ezala oyo eleki moke kati na yango, mpe akoteya bato mosusu kosala bongo, bakozwa ye lokola moto pamba kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akotosa mpe akoteya mibeko oyo epai na bato mosusu akozala moto monene kati na Bokonzi ya Likolo.
20 For I tell you, unless you are more righteous than the scribes and Pharisees, you'll never enter the kingdom of our Father. Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
21 "You've heard that it was said to those of old, 'Do not murder; whoever murders is subject to judgment.' Boyokaki ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. ›
22 But I tell you: whoever is angry with his brother risks judgment. Whoever insults his brother risks the council, and whoever says, 'You fool!' risks fiery hell. Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.
23 "So if you're offering your gift at the altar and recall there that your brother has something against you, Soki ozali kokende kopesa makabo na yo liboso ya etumbelo, mpe ososoli ete ndeko na yo azwa yo na likambo,
24 leave your gift there before the altar, go make peace with your brother first, then come offer your gift. tika makabo na yo liboso ya etumbelo mpe kende nanu koyokana na ndeko na yo wana ; sima na yango nde okoya kopesa makabo na yo.
25 Make peace with your accuser quickly, while still on the way with him, or he may hand you over to the judge, the judge to the officer, and you may be thrown into prison. Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.
26 Truly I tell you, you will never get out until you have paid the last penny. Nazali koloba na yo penza ya solo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo nyonso.
27 "You have heard that it was said, 'You shall not commit adultery.' Boyokaki ete baloba : ‹ Okosalaka ekobo te. ›
28 But I tell you: everyone who looks at a woman lustfully has already committed adultery with her in his heart. Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
29 If your right eye makes you stumble, tear it out and throw it away—better to lose one part of your body than have your whole body thrown into hell. Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo.
30 If your right hand makes you sin, cut it off and throw it away. Better to lose one part of you than have your whole body go into hell. Soki mpe loboko na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, kata yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na lifelo.
31 "It was also said, 'Whoever divorces his wife must give her a certificate of divorce.' Boyokaki lisusu ete baloba : ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. ›
32 I tell you: whoever divorces his wife, except for sexual sin, makes her a victim of adultery; and whoever marries a divorced woman commits adultery. Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
33 "Again, you've heard it was said to the ancients: 'Don't break your oath—fulfill it to our Father.' Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›
34 But I tell you, do not swear an oath at all: neither by heaven, for it is our Father's throne, Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Bokonzi ya Nzambe,
35 nor by the earth, for it's the footstool for his feet, nor by Jerusalem, for it's the city of the great King. to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe ; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.
36 And do not swear by your head, for you cannot make a single hair white or black. Bosalelaka mpe te mito na bino mpo na kolapa ndayi, pamba te bokoki te kokomisa moko kati na suki ya mito na bino pembe to mwindo.
37 Let your 'Yes' be 'Yes,' and your 'No,' 'No'; anything beyond this comes from the evil one. Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.
38 "You have heard that it was said, 'Eye for eye and tooth for tooth.' Boyokaki ete baloba : ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. ›
39 But I tell you: don't resist an evil person. If someone slaps your right cheek, turn the other cheek to him too. Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.
40 If anyone wants to sue you and take your tunic, let him have your cloak too. Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.
41 And if anyone forces you to go one mile, go with him two. Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye.
42 Give to whoever asks you, and don't turn away whoever wants to borrow from you. Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.
43 "You have heard that it was said, 'You will love your neighbor and hate your enemy.' Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. ›
44 But I tell you, love your enemies and pray for those who persecute you, Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
45 so you may become children of your Father in heaven, because he makes his sun rise on evil and good and sends rain on just and unjust. Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.
46 If you love those who love you, what reward is that? Don't even tax collectors do the same? Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ?
47 If you greet only your brothers, what more do you do than others? Don't even the Gentiles do that? Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ?
48 Be perfect, therefore, as your heavenly Father is perfect." Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]