Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the Holy Spirit led Jesus into the wilderness to be tempted by the devil. Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye.
2 And after fasting forty days and forty nights, he was hungry. Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala.
3 The tempter came and said, "If you're the Son of God, tell these stones to become bread." Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.
4 But he answered, "It is written, 'People do not live by bread alone, but by every word from our Father's mouth.'" Yesu azongisaki : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
5 Then the devil took him into the holy city, stood him on the temple's highest point, Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo
6 and told him, "If you're God's Son, throw yourself down, since Scripture says, 'He will command his angels about you, and they will carry you on their hands, so you won't strike your foot on a stone.'" mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »
7 Jesus said to him, "Again it is written, 'You must not put your Father to the test.'" Yesu azongiselaki ye : — Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
8 Again the devil took him to a very high mountain and showed him all the world's kingdoms and their glory. Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ;
9 He said to him, "All these I will give you, if you bow down and worship me." alobaki na Ye : — Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai.
10 Then Jesus told him, "Get away, Satan! For Scripture says, 'Worship your Father, and serve only him.'" Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
11 Then the devil left him, and suddenly angels came and took care of him. Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
12 Now when he heard that John had been arrested, he withdrew into Galilee. Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile.
13 He left Nazareth and settled in Capernaum, by the sea, in the territory of Zebulun and Naphtali, Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali,
14 so that what was spoken by the prophet Isaiah might be fulfilled: mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki :
15 "The land of Zebulun and the land of Naphtali, the way of the sea, beyond the Jordan, Galilee of the Gentiles, « Mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali, nzela ya ebale monene, pembeni ya Yordani, Galile ya bapagano,
16 the people dwelling in darkness have seen a great light, and for those dwelling in the region and shadow of death, on them a light has dawned." bato oyo bazalaki kovanda kati na molili bamoni pole makasi ; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole ebimeli bango. »
17 From that time Jesus began to preach, saying, "Repent, for the kingdom of our Father is near." Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
18 Walking by the Sea of Galilee, he saw two brothers, Simon called Peter and his brother Andrew, casting a net into the sea—they were fishermen. Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
19 And he said to them, "Follow me, and I will make you fishers of people." Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
20 Immediately they left their nets and followed him. Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
21 Going on from there, he saw two more brothers—James son of Zebedee and John his brother—in the boat with their father Zebedee, mending nets, and called them. Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ;
22 Immediately they left the boat and their father and followed him. mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu.
23 He went all through Galilee, teaching in their synagogues, announcing the good news of the kingdom, and healing every disease and sickness among the people. Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.
24 News of him spread through all Syria. They brought him all who were sick—gripped by various diseases and pains, oppressed by demons, epileptic, paralyzed—and he healed them. Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.
25 Large crowds followed him from Galilee, the Decapolis, Jerusalem, Judea, and beyond the Jordan. Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye ; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]