Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus called his twelve disciples and gave them authority over unclean spirits, to drive them out and heal every disease and every sickness. Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.
2 The twelve apostles' names: first, Simon called Peter, and Andrew his brother; James son of Zebedee, and John his brother; Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; Andre, ndeko ya Petelo ; Jake, mwana mobali ya Zebede ; Yoane, ndeko ya Jake ;
3 Philip and Bartholomew; Thomas and Matthew the tax collector; James son of Alphaeus and Thaddaeus; Filipo mpe Bartelemi ; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;
4 Simon the Zealot and Judas Iscariot, who also betrayed him. Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
5 Jesus sent these twelve, instructing them: "Do not go to Gentile regions or enter a Samaritan town. Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.
6 Go rather to the lost sheep of the house of Israel. Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.
7 As you go, proclaim this message: 'The kingdom of our Father has come near.' Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.
8 Heal the sick, raise the dead, cleanse those with leprosy, drive out demons. Freely you received; freely give. Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.
9 Do not take any gold or silver or copper in your belts. Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te.
10 No travel bag, no second shirt, no sandals, no staff—the worker deserves his food. Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.
11 Whatever town or village you enter, find out who is worthy there, and stay there until you leave. Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.
12 As you enter the home, greet it. Mpe tango bokokota na ndako yango, bopesa bavandi na yango mbote na koloba : « Tika ete kimia ezala na bino ! »
13 If the home is worthy, let your peace rest on it; if not, let it return to you. Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango ; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino.
14 If anyone won't welcome you or hear your words, shake the dust off your feet as you leave that house or town. Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.
15 Truly I tell you: Sodom and Gomorrah will fare better on judgment day than that town. Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.
16 Look, I send you out as sheep among wolves; so be as shrewd as serpents, as innocent as doves. Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.
17 Beware of people; they will hand you over to councils and whip you in their synagogues. Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.
18 For my sake you'll be brought before governors and kings, as testimony to them and the Gentiles. Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.
19 But when they hand you over, don't worry about what to say or how—for what to say will be given you at that time, Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.
20 for it will not be you speaking, but the Spirit of your Father speaking through you. Ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo ya Tata na bino nde akoloba na nzela ya minoko na bino.
21 Brother will betray brother to death, father his child; children will rise against their parents and have them killed. Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
22 Everyone will hate you because of my name, but whoever holds out to the end will be saved. Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
23 When persecuted in one town, flee to the next. I tell you truly: you won't finish Israel's towns before the Son of Man comes. Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.
24 The student is not above the teacher, nor the servant above his master. Moyekoli alekaka molakisi na ye te, mowumbu mpe alekaka nkolo na ye te.
25 It's enough for the student to become like the teacher, and the servant like the master. If they call the head of the house Beelzebul, how much more his household! Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?
26 So do not be afraid of them. There is nothing concealed that will not be disclosed, or hidden that will not be made known. Yango wana, bobanga bango te ! Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.
27 What I tell you in the dark, say in daylight; what's whispered in your ear, proclaim from rooftops. Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.
28 Don't fear those who kill the body but not the soul; instead fear the One able to destroy both soul and body in hell. Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.
29 Aren't two sparrows sold for a penny? Yet not one falls to the ground without your Father. Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke ? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te.
30 And even the very hairs of your head are all numbered. Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino.
31 So do not be afraid; you are worth more than many sparrows. Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
32 Therefore, whoever acknowledges me before others, I will also acknowledge before my Father in heaven. Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye ;
33 But whoever denies me before others, I'll deny before my Father in heaven. kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
34 Do not think I came to bring peace on earth; I came not to bring peace but a sword. Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga.
35 For I came to pit a man against his father, a daughter against her mother, a daughter-in-law against her mother-in-law, Pamba te, nayaki mpo na kotia bokabwani kati na mwana mobali mpe tata na ye, kati na mwana mwasi mpe mama na ye, mpe kati na mwasi ya libala mpe mama-bokilo na ye :
36 a man's enemies will be the members of his own household. banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.
37 Whoever loves father or mother above me is unworthy of me; whoever loves son or daughter above me is unworthy of me. Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
38 Whoever does not take up his cross and follow me is not worthy of me. Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
39 Whoever finds his life loses it, and whoever loses his life for my sake finds it. Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.
40 Whoever welcomes you welcomes me, and whoever welcomes me welcomes the One who sent me. Moto oyo ayambaka bino ayambaka nde Ngai, mpe moto oyo ayambaka Ngai ayambaka nde Motindi na Ngai.
41 Whoever welcomes a prophet as a prophet gets a prophet's reward, and whoever welcomes a righteous person as a righteous person gets a righteous person's reward. Moto oyo ayambaka mosakoli mpo ete azali mosakoli akozwa lifuti ya ndenge moko na mosakoli, mpe moto oyo ayambaka moto ya sembo mpo ete azali moto ya sembo akozwa lifuti ya ndenge moko na moto ya sembo.
42 And whoever gives just a cup of cold water to one of these little ones because he is my disciple, truly I tell you, will never lose his reward." Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]