1When Jesus had finished all these sayings, he said to his disciples,OLCBTango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye :
2"You know Passover comes after two days, and the Son of Man is handed over to be crucified."OLCB« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »
3Then the chief priests and elders of the people gathered in the courtyard of the high priest Caiaphas,OLCBBoye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ;
4and they plotted together to seize Jesus secretly and kill him.OLCBbayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.
5But they said, "Not during the festival, or there will be an uproar among the people."OLCBKasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
6Now when Jesus was in Bethany, in the house of Simon the leper,OLCBLokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba,
7a woman came to him with an alabaster jar of very expensive perfume and poured it on his head as he sat at the table.OLCBmwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
8Seeing this, the disciples were angry, saying, "Why this waste?OLCBTango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki : — Mpo na nini kobebisa malasi boye ?
9For this could have been sold for a large sum and given to the poor."OLCBBakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !
10Jesus knew this and said to them, "Why trouble this woman? She has done a beautiful thing to me.OLCBTango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.
11For you always have the poor with you, but you will not always have me.OLCBBokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
12For when she poured this perfume on my body, she did it to prepare me for burial.OLCBWana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai.
13Truly I tell you: wherever this gospel is preached worldwide, what she did will also be told, in memory of her."OLCBNazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
14Then one of the Twelve, the one called Judas Iscariot, went to the chief priests,OLCBMoko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe
15and said, "What are you willing to give me, and I will hand him over to you?" And they counted out thirty pieces of silver for him.OLCBmpe atunaki bango : — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ? Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.
16And from then on he looked for an opportunity to betray him.OLCBBanda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.
17On the first day of Unleavened Bread, the disciples asked Jesus, "Where do you want us to prepare for you to eat the Passover?"OLCBNa mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu : — Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ?
18He said, "Go into the city to a certain man and tell him, 'The Teacher says: My time is near. I'll keep Passover at your house with my disciples.'"OLCBAzongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
19And the disciples did as Jesus directed them, and they prepared the Passover.OLCBBayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
20When evening came, he sat at the table with the Twelve.OLCBTango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.
21And as they were eating, he said, "Truly I tell you, one of you will betray me."OLCBWana bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.
22Deeply grieved, they each asked him, "Surely not I, Lord?"OLCBBayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Nkolo, ezali ngai ?
23He replied, "The one who has dipped his hand in the bowl with me will betray me.OLCBYesu azongisaki : — Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai.
24The Son of Man goes, just as is written of him. But how terrible for the man who betrays him—better for him had he never been born."OLCBSolo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
25Judas, his betrayer, said, "Surely not I, Rabbi?" He said to him, "You have said so."OLCBYuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ? Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.
26As they ate, Jesus took bread, blessed and broke it, gave it to the disciples, and said, "Take, eat; this is my body."OLCBWana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.
27Taking a cup and giving thanks, he gave it to them, saying, "Drink from it, all of you,OLCBAzwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba : — Bomela yango bino nyonso ;
28for this is my blood of the covenant, poured out for many for forgiveness of sins.OLCBezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.
29I tell you: I won't drink this fruit of the vine again, from now until the day I drink it new with you in my Father's kingdom."OLCBNazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.
30And when they had sung a hymn, they went out to the Mount of Olives.OLCBSima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
31Then Jesus told them, "Tonight you will all fall away because of me.For it is written: 'I will strike the shepherd, and the flock's sheep will be scattered.'OLCBYesu alobaki na bango : — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »
32But after I am raised up, I will go ahead of you to Galilee."OLCBKasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
33Peter said to him, "Though they all fall away because of you, I will never fall away."OLCBPetelo alobaki : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
34Jesus said to him, "I tell you the truth: before the rooster crows tonight, you will deny me three times."OLCBYesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
35Peter said, "Even if I must die with you, I won't deny you." All the disciples said the same.OLCBPetelo alobaki na Ye : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.
36Then Jesus came with them to a place called Gethsemane and told the disciples, "Sit here while I go pray over there."OLCBElongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango : — Botikala awa, wana Ngai nakeyi kosambela kuna.
37And taking with him Peter and the two sons of Zebedee, he became deeply grieved and distressed.OLCBWana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;
38Then he told them, "My soul is crushed with sorrow, even to death. Stay here and watch with me."OLCBalobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.
39Going a little farther, he fell on his face and prayed, "My Father, if possible, let this cup pass from me. Yet not as I will, but as you will."OLCBAkendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
40He came to the disciples and found them asleep. He said to Peter, "So, couldn't you stay awake with me one hour?OLCBBongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo : — Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ?
41Stay alert and pray, so you don't fall into temptation; the spirit is willing, but the flesh is weak."OLCBBosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
42A second time he went away and prayed, "My Father, if this cannot pass unless I drink it, your will be done."OLCBAkendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !
43And he came again and found them sleeping, for their eyes were heavy.OLCBAzongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.
44So leaving them again, he went away and prayed a third time, saying the same words again.OLCBBoye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana.
45Then he came to the disciples and said to them, "Still sleeping and resting? Look, the hour has come, and the Son of Man is betrayed into the hands of sinners.OLCBAzongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
46Get up, let's go! Look, the one who betrays me is here!"OLCBBotelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
47While he was still speaking, Judas, one of the Twelve, suddenly came with a large crowd carrying swords and clubs, sent by the chief priests and elders of the people.OLCBWana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
48Now the betrayer had given them a signal: "The one I kiss is him—seize him."OLCBMoto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »
49And immediately he came up to Jesus and said, "Greetings, Rabbi!" And he kissed him.OLCBMbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mbote, Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.
50Jesus told him, "Friend, do what you came to do." Then they came, grabbed Jesus, and held him.OLCBYesu alobaki na ye : — Molingami na Ngai, likambo oyo oyei kosala awa, sala yango. Bongo bato mosusu oyo bayaki elongo na ye bapusanaki, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
51And look, one of those with Jesus reached out his hand, drew his sword, struck the high priest's servant, and cut off his ear.OLCBMoko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
52Then Jesus said to him, "Put your sword back in its place. All who take the sword will die by the sword.OLCBKasi Yesu alobaki na ye : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango, pamba te bato nyonso oyo babundaka na mopanga bakokufa na nzela ya mopanga.
53Do you think I can't call on my Father, who'd at once send me more than twelve legions of angels?OLCBOkanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?
54But how then would the Scriptures be fulfilled, that it must happen this way?"OLCBNzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te ; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.
55At that hour Jesus said to the crowds, "Did you come out with swords and clubs to seize me, as against a bandit? I sat teaching in the temple daily, and you didn't arrest me.OLCBKaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.
56But all this happened to fulfill the prophets' Scriptures." Then all the disciples abandoned him and fled.OLCBKasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
57Then those who arrested Jesus brought him to Caiaphas the high priest, where the scribes and the elders had gathered.OLCBBato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki.
58Peter followed at a distance, to the high priest's courtyard, went in, and sat with the guards to watch how it would end.OLCBPetelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
59The chief priests and the whole Council sought false testimony against Jesus, to put him to death,OLCBNzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,
60but they found none, though many false witnesses came forward. At last two came forward,OLCBkasi bazwaki yango te, atako bato mingi bakendeki mpo na kokosela Ye makambo. Bongo, bato mibale bayaki
61and said, "This man said, 'I can destroy God's temple and rebuild it in three days.'"OLCBmpe balobaki : — Moto oyo alobaki : « Ngai nakoki kobuka Tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato. »
62The high priest stood up and said to him, "Have you no answer? What are these men testifying against you?"OLCBMokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu : — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?
63But Jesus was silent. The high priest said, "I put you under oath by the living God: tell us whether you are the Christ, the Son of God."OLCBKasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »
64Jesus told him, "You've said it. But I tell you: from now on you'll see the Son of Man seated at Power's right hand, coming on heaven's clouds."OLCBYesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.
65Then the high priest tore his clothes: "He has blasphemed! Why do we still need witnesses? You've now heard the blasphemy.OLCBMokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe !
66What is your judgment?" They answered, "He deserves death."OLCBBokanisi nini mpo na yango ? Bazongisaki : — Abongi na kufa.
67Then they spit in his face and struck him; and some slapped him,OLCBBabwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi ; bato mosusu babetaki Ye bambata
68saying, "Prophesy to us, Christ! Who hit you?"OLCBmpe balobaki : — Klisto, sakola kati na biso ; yebisa biso moto oyo abeti yo !
69Peter sat outside in the courtyard. A servant girl approached, saying, "You too were with Jesus the Galilean."OLCBNa tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
70But he denied it before them all, saying, "I don't know what you're talking about."OLCBKasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso : — Nayebi te makambo oyo ozali koloba !
71As he went out to the gate, another servant girl saw him and told those there, "This man was with Jesus of Nazareth."OLCBWana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.
72And again he denied it with an oath, "I do not know the man."OLCBPetelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi : — Nayebi moto wana te !
73Shortly after, the bystanders came to Peter: "Surely you're one of them too, since your accent gives you away."OLCBSima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.
74Then he began to curse himself and swear, "I don't know the man." At once a rooster crowed.OLCBBongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! Mpe, mbala moko, soso elelaki.
75Peter remembered Jesus' words: "Before the rooster crows, you will deny me three times." He went out and wept bitterly.OLCBBongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.