1At dawn, all the chief priests and elders of the people met and plotted to kill Jesus.OLCBTango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.
2So they bound him, led him away, and handed him over to Pilate the governor.OLCBBakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato.
3Then Judas, his betrayer, seeing Jesus condemned, felt remorse and returned the thirty pieces of silver to the chief priests and elders,OLCBTango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato.
4saying, "I sinned, betraying innocent blood." They said, "Not our concern. You'll see to it."OLCBAlobaki na bango : — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! Kasi bango bazongisaki : — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !
5He threw the pieces of silver into the temple, went out, and hanged himself.OLCBYuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.
6The chief priests took the silver and said, "We can't put this in the treasury—it was payment for blood."OLCBBakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.
7So they consulted, then bought the potter's field with it, to bury foreigners.OLCBBoye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya.
8That is why that field has been called the Field of Blood to this day.OLCBYango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila.
9Then what the prophet Jeremiah spoke was fulfilled: "They took the thirty pieces of silver, the price set on him, whom some of Israel's sons priced,OLCBEzali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki : « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye,
10and they gave them for the potter's field, as our Father directed me."OLCBmpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. »
11Jesus stood before the governor; the governor asked, "Are you the King of the Jews?" Jesus said, "You say so."OLCBYesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.
12But when he was accused by the chief priests and elders, he gave no answer.OLCBSima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te.
13Then Pilate said to him, "Don't you hear how many charges they're bringing against you?"OLCBBongo Pilato atunaki Ye : — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo ?
14He gave him no answer, not even to a single charge, so the governor was greatly amazed.OLCBKasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe moyangeli akamwaki makasi.
15At each feast the governor would release one prisoner the crowd wanted.OLCBNa feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona.
16At that time they were holding a notorious prisoner called Barabbas.OLCBNa tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi.
17When they had gathered, Pilate asked, "Which do you want me to release—Barabbas, or Jesus called Christ?"OLCBTango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?
18For he knew that it was out of envy that they had handed him over.OLCBPilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye.
19While he sat on the judgment seat, his wife sent to him: Have nothing to do with that righteous man, for I suffered much today in a dream because of him.OLCBWana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !
20But the chief priests and elders persuaded the crowds to ask for Barabbas and to have Jesus put to death.OLCBBakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.
21The governor said, "Which of the two should I release to you?" They said, "Barabbas."OLCBMoyangeli atunaki bango lisusu : — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ? Bazongisaki na koganga : — Barabasi !
22Pilate asked them, "What then do I do with Jesus called Christ?" They all said, "Have him crucified!"OLCBPilato atunaki bango : — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ? Bato nyonso bazongisaki : — Baka ye na ekulusu !
23He said, "Why? What wrong has he done?" But they cried out louder, "Crucify him!"OLCBPilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !
24Seeing he could do nothing, but a riot was starting instead, Pilate took water, washed his hands before the crowd, and said, "I am innocent of this man's blood; you see to it."OLCBTango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.
25And all the people answered, "His blood be on us and on our children!"OLCBBato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !
26Then he released Barabbas to them, had Jesus whipped, and handed him over to be crucified.OLCBPilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
27Then the governor's soldiers took Jesus into the governor's headquarters and gathered the whole regiment around him.OLCBBasoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda.
28They stripped him and put a scarlet robe on him.OLCBBalongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane,
29They twisted a crown of thorns, set it on his head, put a reed in his right hand, knelt before him, and mocked him: "Hail, King of the Jews!"OLCBbalatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
30And they spit on him, took the reed, and struck him on the head again and again.OLCBBazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto.
31After mocking him, they stripped off the robe, dressed him in his own clothes, and led him away to crucify him.OLCBSima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
32Going out, they found a Cyrenian named Simon and forced him to carry Jesus's cross.OLCBWana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.
33And when they came to a place called Golgotha (which means Place of a Skull),OLCBTango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto,
34they gave him wine mixed with bitter gall to drink; he tasted it and refused to drink.OLCBbapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango.
35And when they had crucified him, they divided his garments among themselves by casting lots.OLCBSima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke ;
36Then they sat down and kept watch over him there.OLCBmpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
37Over his head they posted the charge against him: "This is Jesus, the King of the Jews."OLCBNa likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu : Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.
38Then two robbers were crucified with him, one on his right and one on his left.OLCBBabomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
39Those who passed by hurled insults at him, shaking their heads,OLCBBaleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ;
40saying, "You who would destroy the temple and rebuild it in three days—save yourself! If you're the Son of God, come down from the cross!"OLCBbazalaki koloba : « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko ! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu ! »
41In the same way the chief priests, with the scribes and elders, also mocked him, saying,OLCBBakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba :
42"he saved others; himself he can't save. He's King of Israel—let him come down from the cross now, and we'll believe in him.OLCB« Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! Azali mokonzi ya Isalaele ! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye.
43He trusts in God—let God save him now, if he wants him, for he said, 'I am God's Son.'"OLCBAtiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »
44And the robbers who were crucified with him also heaped insults on him in the same way.OLCBBabomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana.
45Now from noon until three in the afternoon darkness came over all the land.OLCBKobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
46About three in the afternoon, Jesus cried loudly, "Eli, Eli, lema sabachthani?"—meaning, "My God, my God, why have you forsaken me?"OLCBPene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?
47When some of those standing there heard this, they said, "This man is calling Elijah."OLCBKati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye ; boye bakomaki koloba : — Azali kobenga Eliya !
48One of them ran at once, soaked a sponge in sour wine, put it on a reed, and gave him a drink.OLCBMbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela.
49But the others said, "Leave him alone. Let us see whether Elijah will come to save him."OLCBKasi bato mosusu balobaki : — Zela ! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye.
50And Jesus cried out again with a loud voice and gave up his spirit.OLCBKasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye.
51Suddenly the curtain of the temple was torn in two, from top to bottom. The earth shook, the rocks split.OLCBKaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,
52The tombs were opened, and many bodies of the holy ones who had fallen asleep were raised.OLCBbakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki :
53After Jesus's resurrection, they left the tombs, entered the holy city, and appeared to many.OLCBebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.
54The centurion and those with him guarding Jesus saw the earthquake and what happened, and were terrified, saying, "Truly this man was the Son of God!"OLCBTango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
55Many women watched from a distance; they had followed Jesus from Galilee to serve him.OLCBBasi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye.
56Among them: Mary Magdalene, Mary mother of James and Joseph, and the mother of Zebedee's sons.OLCBKati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede.
57At evening a rich man from Arimathea named Joseph came, himself a disciple of Jesus.OLCBTango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu.
58He went to Pilate and asked for Jesus' body. Then Pilate ordered it given to him.OLCBAkendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato ; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango.
59Joseph took the body, wrapped it in a clean linen cloth.OLCBJozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto
60He put it in his new tomb, cut into the rock, rolled a large stone across the tomb's entrance, and left.OLCBmpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.
61Mary Magdalene and the other Mary were there, sitting opposite the tomb.OLCBMari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.
62The next day—after Preparation Day—the chief priests and Pharisees gathered before Pilate,OLCBMokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato
63and said, "Sir, we remember that deceiver, while still alive, said, 'After three days I will rise.'OLCBmpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »
64So order the tomb secured until the third day, or his disciples may come, steal him, and tell the people, 'He has been raised from the dead.' That last deception would be worse than the first."OLCBYango wana, pesa mitindo ete bakengela malamu kunda yango kino na mokolo ya misato. Soki te, bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto mpo ete, na sima, baloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Lokuta oyo ya suka ekoya kozala lisusu mabe koleka oyo ya liboso.
65Pilate said to them, "You have a guard. Go, make it as secure as you can."OLCBPilato azongisaki : — Bozwa bakengeli mpe bokende kokengela kunda ndenge bokanisi kosala.
66So they went and made the tomb secure by sealing the stone and posting the guard.OLCBBoye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu ; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.