Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "For the kingdom of our Father is like a landowner who went out at dawn to hire workers for his vineyard. Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.
2 He agreed to pay the workers a full day's wage and sent them into his vineyard. Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.
3 About nine o'clock in the morning he went out and saw others standing idle in the marketplace. Na ngonga ya libwa ya tongo, abimaki lisusu mpe amonaki, na esika oyo bato bakutanaka, bato mosusu oyo bazalaki kosala eloko moko te.
4 He told them, 'You too, go into the vineyard; I'll pay you whatever's right.' So they went. Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »
5 Going out again about noon and about three in the afternoon, he did the same. Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi ; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.
6 About five in the afternoon, he went out and found others standing there. He asked, 'Why have you stood here idle all day?'" Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango : « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te ? »
7 "They said, 'Because no one hired us.' He said, 'You also go into the vineyard.' Bazongisaki : « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. » Bongo alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »
8 "When evening came, the vineyard owner told his foreman, 'Call the workers and pay them their wages, from the last to the first.' Tango pokwa ekokaki, nkolo elanga ya vino alobaki na motambolisi ya misala ya elanga : « Benga basali nyonso mpe futa bango ; banda na bato oyo nazwaki sima mpe sukisa na ba-oyo nazwaki liboso. »
9 And when those hired about five o'clock came, each of them received a full day's wage. Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.
10 When the first came, they thought they would get more, but each got a full day's wage too. Bongo ekomaki ngonga ya kofuta bato oyo nkolo elanga azwaki liboso na mosala ; bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka, kasi moko na moko kati na bango azwaki lokola lifuti, mbongo moko kaka ya ebende.
11 And on receiving it they grumbled at the landowner, Tango bazwaki yango, basilikelaki nkolo elanga.
12 saying, 'These last worked only one hour, yet you made them equal to us, who bore the day's burden and the scorching heat.' Balobaki : « Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso oyo tosali mosala makasi mokolo mobimba mpe na se ya moyi makasi ! »
13 "He answered one of them, 'Friend, I'm not wronging you. Didn't you agree with me for a full day's wage?' Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango : « Moninga na ngai, nasali yo mabe te ! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende ?
14 Take what's yours and go. I want to give this last worker the same as you. Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko nde nalingi kopesa na moto oyo abandaki sima, lifuti ya ndenge moko na oyo napesi yo.
15 Can't I do what I want with what's mine? Or are you jealous because I'm generous? Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »
16 So the last will be first, and the first last." Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
17 As Jesus was going up to Jerusalem, he took the twelve aside and said to them on the way, Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango wana bazali kotambola :
18 "See, we are going up to Jerusalem, and the Son of Man will be given over to the chief priests and scribes, who will condemn him to death, « Boyoka ! Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa
19 and hand him over to the Gentiles to mock and flog and crucify—and on the third day he will be raised." mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »
20 Then Zebedee's sons' mother came to him with her sons, kneeling to ask something of him. Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko.
21 He asked her, "What do you want?" She said, "Say my two sons will sit one at your right, one at your left, in your kingdom." Yesu atunaki ye : — Olingi nini ? Azongisaki : — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
22 But Jesus replied, "You don't know what you're asking. Can you drink the cup I am about to drink?" "We can," they said. Yesu azongiselaki bango : — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ? Bazongisaki : — Iyo, tokoki.
23 He said, "You will drink my cup, but seating at my right and left is not mine to give—it belongs to those my Father has prepared it for." Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
24 When the ten heard this, they were angry at the two brothers. Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana.
25 Jesus called them over and said, "You know the rulers of the Gentiles lord it over them, and their powerful men hold authority over them. Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : — Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
26 Not so among you. Rather, whoever wants to be great among you must be your servant, Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;
27 and whoever wants to be first among you must be your slave, mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino !
28 just as the Son of Man came not to be served but to serve, and to give his life as a ransom for many." Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
29 And as they went out of Jericho, a great crowd followed him. Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu.
30 Two blind men sitting by the road heard Jesus was passing and cried out, "Lord, have mercy on us, Son of David!" Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
31 The crowd scolded them to be quiet, but they shouted louder, "Have mercy on us, Lord, Son of David!" Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi : — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
32 And stopping, Jesus called them and said, "What do you want me to do for you?" Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango : — Bolingi nasala nini mpo na bino ?
33 They said to him, "Lord, let our eyes be opened." Bazongiselaki Ye : — Nkolo, sala ete tomona.
34 And Jesus, moved with compassion, touched their eyes, and immediately they recovered their sight and followed him. Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]