Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Jesus finished these words, he left Galilee and went into the region of Judea, across the Jordan. Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani.
2 Large crowds followed him, and he healed them there. Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna.
3 Pharisees came to test him, asking, "Is it lawful for a man to divorce his wife for any cause?" Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?
4 He answered, "Haven't you read that our Father, who made them at the beginning, made them male and female, Yesu azongisaki : — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »
5 and said, 'So a man will leave his father and mother and cling to his wife, and the two will become one flesh'? mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ?
6 So they are no longer two but one flesh; therefore, let no one separate what our Father has joined." Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
7 They said to him, "Why then did Moses command that a man give a divorce certificate and send her away?" Kasi Bafarizeo balobaki na Ye : — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ?
8 He told them, "Moses let you divorce your wives because your hearts were hard, but it wasn't like that from the beginning. Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te.
9 I tell you: whoever divorces his wife—except for sexual sin—and marries another commits adultery." Nazali koloba na bino : Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
10 The disciples said to him, "If that's the case between husband and wife, it's better not to marry." Bayekoli balobaki na Ye : — Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te !
11 He said to them, "Not everyone can accept this word—only those it's given to. Yesu azongiselaki bango : — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.
12 There are eunuchs born that way from their mother's womb; there are eunuchs made that way by others; and there are eunuchs who made themselves so for the kingdom of our Father. Let the one who can accept this, accept it." Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !
13 Then little children were brought to him so he could lay hands on them and pray, but the disciples rebuked those bringing them. Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango.
14 But Jesus said, "Let the little children come to me—don't stop them, for the kingdom of our Father belongs to ones like these." Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
15 And he laid his hands on them and went on from there. Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
16 Just then a man approached him and asked, "Teacher, what good must I do to obtain eternal life?" Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
17 He said to him, "Why ask me about what is good? Only one is good. If you want to enter life, keep the commandments." Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
18 "Which ones?" he asked. Jesus said, "Do not murder, do not commit adultery, do not steal, do not testify falsely, Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ? Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,
19 honor your father and mother, and love your neighbor as yourself." okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
20 The young man said to him, "All these I have kept. What do I still lack?" Elenge mobali alobaki : — Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ?
21 Jesus told him, "If you want to be complete, go, sell your possessions and give to the poor—you'll have treasure in heaven—then come, follow me." Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22 When the young man heard this, he went away grieving, because he had great wealth. Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
23 Jesus said to his disciples, "Truly, I tell you: a rich person will hardly enter our Father's kingdom. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo !
24 I tell you again: a camel fits through the eye of a needle easier than a rich person enters our Father's kingdom." Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
25 When the disciples heard this, they were greatly astonished and asked, "Who then can be saved?" Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
26 Jesus looked at them and said, "This is impossible for people, but everything is possible with our Father." Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
27 Then Peter said to him, "Look, we've left everything and followed you. What then will we have?" Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Ekozala boni mpo na biso ?
28 Jesus told them, "Truly: in the renewal, when the Son of Man sits on his glorious throne, you who followed me will also sit on twelve thrones, judging the twelve tribes of Israel. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
29 "Everyone who has left houses or brothers or sisters or father or mother or children or fields for my name will receive one hundred times more and inherit eternal life. Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
30 But many who are first will be last, and many who are last will be first." Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]