Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Pharisees and Sadducees came to test him, asking him to show them a sign from heaven. Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo ; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.
2 He replied, "When evening comes, you say, 'The weather will be fair, for the sky is red.' Yesu azongiselaki bango : — Na pokwa, bolobaka : « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane ! »
3 "And in the morning, 'Stormy today, for the sky is red and gloomy.' You know how to read the sky's face, but can't read the times' signs. Mpe na tongo, bolobaka : « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango !
4 "An evil, unfaithful generation seeks a sign; no sign will be given except the sign of Jonah." Then he left them and went away. Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.
5 When the disciples crossed to the other side, they had forgotten to bring bread. Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa.
6 Jesus said to them, "Watch out and beware of the yeast of the Pharisees and Sadducees." Yesu alobaki na bango : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !
7 They discussed this among themselves and said, "It is because we brought no bread." Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !
8 Aware of this, Jesus said, "Why discuss among yourselves, you of little faith, that you have no bread? Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ?
9 Still, don't you understand? Don't you remember the five loaves for the 5,000, and how many baskets you collected? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?
10 "Or the seven loaves for the 4,000, and how many baskets you gathered? Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?
11 "Why don't you understand I wasn't talking to you about bread? Watch out for the yeast of the Pharisees and Sadducees." Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?
12 Then they understood that he had not told them to beware of the yeast in bread, but of the Pharisees' and Sadducees' teaching. Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.
13 Arriving in the area of Caesarea Philippi, Jesus asked his disciples, "Who do people say the Son of Man is?" Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?
14 They said, "Some say John the Baptist, others Elijah, still others Jeremiah or one of the prophets." Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
15 He said to them, "But who do you say that I am?" Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
16 Simon Peter replied, "You are the Christ, the Son of the living Father." Simona Petelo azongisaki : — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
17 Jesus replied, "Simon son of Jonah, you are blessed—flesh and blood didn't reveal this to you, but my Father in heaven. Yesu alobaki na ye : — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
18 "And I tell you: you are Peter, and on this rock I will build my church; the gates of the grave will not overpower it. Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.
19 "I will give you the keys of our Father's kingdom; whatever you bind on earth will have been bound in heaven, and whatever you release on earth will have been released in heaven." Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo ; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
20 Then he strictly ordered the disciples to tell no one that he was the Christ. Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.
21 From then on, Jesus began telling his disciples he must go to Jerusalem, suffer much from the elders, chief priests, and scribes, be killed, and be raised on the third day. Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
22 Peter took him aside and rebuked him: "Never, Lord! This will never happen to you." Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana ! Ekokomela Yo te !
23 But he turned and told Peter, "Get behind me, Satan! You are an obstacle to me, because you're not thinking about what our Father cares about, but what people care about." Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
24 Then Jesus told his disciples, "Whoever wants to come after me must deny himself, take up his cross, and follow me. Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
25 "For whoever wants to save his life will lose it, but whoever loses his life for my sake will find it. Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.
26 "What good is it if a person gains the whole world but loses his soul? Or what can a person give in exchange for his soul? Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?
27 "For the Son of Man is about to come in his Father's glory with his angels, and will then repay each person according to what they have done. Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.
28 "Truly I tell you: some standing here will not taste death until they see the Son of Man coming in his kingdom." Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]