Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Pharisees and scribes came to Jesus from Jerusalem and said, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye :
2 "Why do your disciples break the elders' tradition? They don't wash their hands when they eat." — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
3 He answered, "Why do you also break our Father's commandment for your tradition? Yesu azongiselaki bango : — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ?
4 For our Father said, 'Honor your father and your mother,' and, 'Whoever curses father or mother must surely be put to death.' Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
5 But you say, 'Whoever tells his father or mother, "Whatever you gained from me is a gift devoted to our Father," Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›
6 he need not honor his father with it.' You've canceled our Father's word for your tradition's sake. abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino !
7 You hypocrites! Isaiah prophesied rightly about you when he said: Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :
8 'This people honors me with their lips, but their heart is far from me; « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
9 they worship me in vain, teaching the commandments of men as doctrine.'" basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
10 Then he called the crowd to him and said, "Listen and understand: Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : — Boyoka mpe bososola makambo oyo :
11 Not what enters the mouth makes a person unclean, but what comes out of the mouth makes a person unclean." eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
12 Then the disciples came to him and said, "Do you know the Pharisees were offended hearing this saying?" Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye : — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku ?
13 He replied, "Every plant my heavenly Father didn't plant will be uprooted. Yesu azongisaki : — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.
14 Leave them; they are blind guides. If a blind man guides a blind man, both fall into a pit." Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.
15 Peter said to him, "Explain this parable to us." Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Limbolela biso lisese oyo.
16 "Are you still as dull as the others?" Jesus said. Yesu atunaki bango : — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ?
17 "Don't you understand that whatever enters the mouth passes into the stomach and is then expelled? Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?
18 But what comes out of the mouth comes from the heart, and that makes a person unclean. Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
19 For the heart produces evil thoughts: murder, adultery, sexual sin, theft, false testimony, slander. Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
20 These make a person unclean, but eating with unwashed hands does not make anyone unclean." Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
21 Leaving that place, Jesus withdrew to the region of Tyre and Sidon. Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.
22 A Canaanite woman from that region came, crying out, "Have mercy on me, Lord, Son of David! My daughter is severely tormented by a demon." Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
23 He answered her nothing. His disciples came and urged him, "Send her away—she keeps shouting after us." Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
24 He answered, "I was sent only to the lost sheep of the house of Israel." Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !
25 But she came and knelt before him, saying, "Lord, help me!" Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, sunga ngai !
26 He replied, "It is not right to take the children's bread and throw it to the dogs." Yesu azongisaki : — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
27 "Yes, Lord," she said, "yet even the dogs eat the crumbs that fall from their masters' table." Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
28 Jesus replied, "Woman, your faith is great. Let it happen as you wish." And her daughter was healed from that hour. Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
29 Leaving there, Jesus went along the Sea of Galilee, went up the mountain, and sat down there. Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile ; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna.
30 Large crowds came to him with the lame, blind, crippled, mute, and many others, laying them at his feet, and he healed them. Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.
31 So the crowd was amazed, seeing the mute speak, the crippled healed, the lame walk, and the blind see; they gave glory to the Father of Israel. Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
32 Jesus called his disciples to him and said, "I feel for this crowd—they've already been with me three days with nothing to eat. I don't want to send them away hungry; they might collapse on the road." Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
33 The disciples asked, "Where in this remote place could we find enough bread to feed such a crowd?" Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?
34 "How many loaves do you have?" Jesus asked. "Seven," they said, "and a few small fish." Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ? Bayekoli bazongisaki : — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
35 So he told the crowd to sit down on the ground. Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele.
36 And he took the seven loaves and fish, gave thanks, broke them, gave them to the disciples, and they gave them to the crowds. Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.
37 They all ate and were satisfied, and they gathered up seven baskets full of the leftover pieces. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
38 Those who ate were 4,000 men, besides women and children. Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.
39 After sending the crowds away, he boarded the boat and went to the region of Magadan. Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]