Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At that time Herod the tetrarch heard the reports about Jesus. Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile.
2 He told his attendants, "This is John the Baptist, raised from the dead—that's why these powers are at work in him." Alobaki na basali na ye : — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.
3 For Herod had arrested John, chained him, and locked him in prison over Herodias, his brother Philip's wife, Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ;
4 because John had been telling him, "It is not lawful for you to have her." pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »
5 Herod wanted to kill him but feared the crowd, since they held John as a prophet. Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.
6 But when Herod's birthday came, the daughter of Herodias danced before them and pleased Herod, Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi.
7 so he promised with an oath to give her whatever she asked. Boye, Erode alakaki mwasi yango, na nzela ya ndayi, ete akopesa ye nyonso oyo akosenga.
8 Prompted by her mother, she said, "Give me John the Baptist's head here, on a platter." Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. »
9 The king was grieved, but because of his oaths and his dinner guests, he gave the order, Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango.
10 and he sent and had John beheaded in the prison. Atindaki moto moko ete akende kokata moto ya Yoane kati na boloko.
11 His head was brought on a platter, given to the girl, who brought it to her mother. Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye.
12 Then John's disciples came, took the body, and buried it; and they went and told Jesus. Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango ; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu.
13 Hearing this, Jesus withdrew by boat to a remote place alone. But the crowds heard and followed him on foot from the towns. Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo.
14 When he went ashore, he saw a big crowd, felt compassion for them, and healed their sick. Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.
15 When evening came, the disciples said to him, "This is an isolated place, and the hour is already late. Send the crowds away to go into the villages and buy themselves food." Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye : — Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.
16 But Jesus told them, "They don't need to leave. You feed them." Kasi Yesu alobaki na bango : — Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
17 They said to him, "We have nothing here but five loaves and two fish." Bayekoli bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale.
18 He said, "Bring them here to me." Yesu alobaki : — Boya na yango awa epai na Ngai.
19 He told the crowds to sit on the grass. Taking the five loaves and two fish, he looked up to heaven, gave thanks, broke the loaves, and gave them to the disciples, who gave them to the crowds. Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.
20 They all ate and were satisfied, and they picked up twelve baskets full of the leftover pieces. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
21 Those who ate were about 5,000 men, besides women and children. Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.
22 Immediately he made the disciples board the boat and go ahead of him to the other side, while he sent the crowds away. Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato.
23 After sending the crowds away, he went up the mountain privately to pray. When evening came, he was there alone. Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko.
24 The boat was already far from land, battered by waves, the wind against them. Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima.
25 About three o'clock in the morning he came to them, walking on the sea. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
26 Seeing him walking on the sea, the disciples were terrified, saying, "A ghost!" and cried out in fear. Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba : — Elima ! Elima ! Elima ! Bagangaki mpo na somo.
27 But Jesus spoke to them at once: "Take courage! It is I; do not be afraid." Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !
28 Peter answered him, "Lord, if it is you, command me to come to you on the water." Petelo alobaki na Ye : — Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi.
29 He said, "Come." Peter got out of the boat, walked on water, and went toward Jesus. Yesu alobaki na ye : — Yaka. Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu.
30 But seeing the strong wind, he was afraid, and beginning to sink, he cried out, "Lord, save me!" Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : — Nkolo, bikisa ngai !
31 Jesus immediately reached out his hand, caught him, and said, "You of little faith, why did you doubt?" Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?
32 And when they got into the boat, the wind died down. Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki.
33 Then those in the boat worshiped him, saying, "Truly you are the Son of our Father." Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki : — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !
34 When they had crossed over, they came to land at Gennesaret. Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti.
35 When the men of that place recognized him, they sent word through that whole region and brought him all who were sick. Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba ; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso.
36 They begged him to let them just touch the fringe of his robe, and all who touched it were healed. Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]