Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On that day Jesus went out of the house and sat down beside the sea. Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale.
2 Large crowds gathered around him, so he got in a boat and sat, while the whole crowd stood on the shore. Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili.
3 And he told them many things in parables, saying: "Look, a sower went out to sow. Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba : — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye.
4 And as he sowed, some seed fell along the path, and the birds came and devoured it. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
5 Other seed fell on rocky ground with little soil, and sprang up quickly since the soil lacked depth. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ;
6 When the sun rose, the plants were scorched; since they had no root, they withered. kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te.
7 Other seed fell among thorns, and the thorns grew up and choked it. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;
8 Other seed fell on good soil, producing grain: some a hundredfold, some sixty, some thirty. kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato.
9 Whoever has ears, let them hear." Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
10 Then the disciples came to him and asked, "Why do you speak to them in parables?" Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye : — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese ?
11 He said, "You've been given to know the secrets of the kingdom of our Father; they have not. Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.
12 Whoever has will be given more and have plenty; whoever has none loses even what he has. Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
13 This is why I speak to them in parables: they look but don't see; they listen but don't hear or understand. Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese : ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te ; mpe atako bazali koyoka, basosola te.
14 In them Isaiah's prophecy is fulfilled: 'You will hear and hear, yet never understand; you will see and see, yet never perceive.' Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami : « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ; miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !
15 For this people's heart has grown calloused; they hardly hear with their ears, and they have closed their eyes—otherwise they might see with their eyes, hear with their ears, understand with their heart, and turn, and I would heal them.' Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
16 But blessed are your eyes, for they see, and your ears, for they hear. Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.
17 I assure you: many prophets and righteous people longed to see what you see, and didn't; to hear what you hear, and didn't. Nazali koloba na bino penza ya solo : basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
18 Listen, then, to the parable of the sower. Boyoka ndimbola ya lisese ya moloni :
19 Everyone who hears the kingdom's word and doesn't grasp it—the evil one comes and snatches what was sown in his heart. This is the seed sown beside the path. Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.
20 Seed sown on rocky ground is the one who hears the word, immediately receiving it with joy, Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.
21 but having no root in themselves, they don't last; when trouble or persecution comes because of the word, they quickly fall away. Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.
22 The one sown among thorns hears the word, but worry over this age and wealth's deceit choke it, making it unproductive. Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.
23 But the seed sown on good soil hears the word and understands it. It bears fruit—100, sixty, or thirty times what was sown." Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu ; bongo akobota bambuma : epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko ; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.
24 He gave them another parable: "The kingdom of our Father is like a man who sowed good seed in his field. Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.
25 But while everyone slept, his enemy came, sowed weeds among the wheat, and left. Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.
26 When the wheat sprouted and produced grain, then the weeds appeared as well. Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki.
27 The owner's servants came saying, 'Master, didn't you sow good seed in your field? Where then did the weeds come from?' Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki : ‹ Mokonzi ; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo ? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi ? ›
28 'An enemy did this,' he replied. 'So do you want us to go pull them up?' the servants asked him. Nkolo elanga azongisaki : ‹ Ezali monguna nde asali bongo ! › Basali batunaki lisusu : ‹ Olingi tokende kopikola yango ? ›
29 'No,' he said, 'because while you are pulling the weeds, you may uproot the wheat with them. Nkolo elanga azongisaki : ‹ Bokende te ! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.
30 Let both grow together until harvest. At harvest time I'll tell the reapers: Gather the weeds first, bind them in bundles to burn; then gather the wheat into my barn.'" Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
31 He told them another parable: "The kingdom of our Father is like a mustard seed a man took and planted in his field. Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.
32 Though the smallest of all seeds, when grown it becomes the largest of garden plants, a tree where birds come to nest in its branches." Nkona yango eleki bankona nyonso na moke ; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene ; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
33 He gave them another parable: "The kingdom of our Father is like yeast a woman took and mixed into about twenty-five pounds of flour, until it spread through all the dough." Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »
34 Jesus said all these things to the crowds in parables; he said nothing to them without a parable. Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato ; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese.
35 This fulfilled what was spoken through the prophet: "I will open my mouth in parables; I will utter what's been hidden since the world was founded." Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
36 Then he left the crowds and entered the house. His disciples approached him and said, "Explain to us the parable of the weeds in the field." Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye : — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga.
37 He answered, "The one who sowed the good seed is the Son of Man. Yesu azongisaki : — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto.
38 The field is the world. The good seed is the kingdom's children; the weeds are the evil one's children. Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana ;
39 The enemy who sowed them is the devil; the harvest is the end of the age; the harvesters are angels. monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.
40 As the weeds are gathered and burned in fire, so it will be at the end of the age. Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili :
41 The Son of Man will send his angels to weed out of his kingdom everything that causes sin and all who do evil. Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
42 They will throw them into the blazing furnace, where there is weeping and grinding of teeth. Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
43 Then the righteous will shine like the sun in their Father's kingdom. The one with ears should listen." Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
44 The kingdom of our Father is like treasure hidden in a field. A man found it, hid it again, then joyfully sold all he had to buy that field. Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.
45 "Again, the kingdom of our Father is like a merchant searching for fine pearls. Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko.
46 Finding one priceless pearl, he went and sold all he had and bought it. Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.
47 Again, our Father's kingdom is like a net cast into the lake, gathering fish of every kind. Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.
48 When full, the fishermen pulled it ashore, sat down, and collected the good fish in baskets, throwing out the bad. Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.
49 So it will be at the age's end: angels will go out and separate the wicked from among the righteous, Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,
50 and throw them into the blazing furnace, where they will weep and grind their teeth." bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
51 "Have you understood all these things?" "Yes," they replied. Boni, bososoli makambo oyo nyonso ? Bazongisaki : — Iyo !
52 He said to them, "Every teacher of the law trained for our Father's kingdom is like a homeowner who brings treasures new and old out of his storeroom." Bongo, Yesu alobaki na bango : — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.
53 When Jesus had finished these parables, he moved on from there. Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango
54 Returning to his hometown, he taught in their synagogue, and they were amazed: "Where does this man get this wisdom and these mighty works? mpe azongaki kati na engumba na Ye ; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna : « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi ?
55 Isn't this the carpenter's son? Isn't his mother named Mary, and his brothers James, Joseph, Simon, and Judas? Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ?
56 Aren't all his sisters here with us? Where then did this man get all these things?" Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te ? Azwi makambo oyo nyonso wapi ? »
57 They took offense at him. But Jesus said to them, "A prophet is honored everywhere except in his hometown and in his own household." Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.
58 He didn't do many miracles there because of their lack of faith. Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]