1Jesus called the twelve together, gave them power and authority over all the demons and to heal diseases.OLCBYesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ;
2And he sent them out to proclaim the kingdom of our Father and to heal the sick.OLCBmpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli.
3He said to them, "Take nothing for the road: no staff, bag, bread, or money, and don't take two tunics each.OLCBAlobaki na bango : — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto.
4Whatever house you enter, stay there, and leave from there.OLCBNa ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.
5Wherever they won't welcome you, shake the dust off your feet as you leave that town, as a testimony against them."OLCBSoki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.
6So they set out and went from village to village, proclaiming the good news and healing everywhere.OLCBBayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.
7Herod the tetrarch heard all that was happening, and was puzzled, because some said John had been raised from the dead,OLCBErode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, »
8others that Elijah had appeared, and still others that one of the prophets of old had risen.OLCBbamosusu : « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu : « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. »
9Herod said, "I beheaded John—so who is this I hear such things about?" He kept seeking to see him.OLCBKasi Erode azalaki komilobela : « Ngai nde nakataki Yoane moto ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani ? » Boye alukaki kokutana na Yesu.
10When the apostles returned, they told Jesus all they had done. He took them and withdrew privately to a town called Bethsaida.OLCBTango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.
11But the crowds found out and followed him. He welcomed them, spoke to them of our Father's kingdom, and healed those who needed it.OLCBKasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.
12As the day was ending, the Twelve came and said to him, "Send the crowd away to find lodging and food in the villages and countryside around us—we're in a remote place here."OLCBAwa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama.
13He said, "You give them something to eat." They said, "We have only five loaves and two fish—unless we go and buy food for this whole crowd."OLCBKasi Yesu alobaki na bango : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
14For there were about 5,000 men. He told his disciples, "Seat them in groups of about fifty each."OLCBEzalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.
15They did so, and had everyone sit down.OLCBBayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki.
16He took the five loaves and two fish, looked up to heaven, blessed and broke them, then kept giving them to the disciples to serve the crowd.OLCBYesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato.
17All ate and were satisfied; the leftover pieces filled twelve baskets.OLCBBato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
18Once, while praying alone with his disciples nearby, Jesus asked them, "Who do the crowds say I am?"OLCBMokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?
19They answered, "John the Baptist. Others say Elijah. Still others, that an ancient prophet has risen."OLCBBazongisaki : — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.
20"But who do you say that I am?" he asked. Peter answered, "The Christ of our Father."OLCBYesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ? Petelo azongisaki : — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.
21Jesus strictly warned them, ordering them to tell no one this,OLCBYesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko.
22saying, "The Son of Man must suffer many things and be rejected by the elders, chief priests, and scribes, and be killed, and on the third day be raised."OLCBMpe alobaki : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
23Then he told them all, "Whoever wants to come after me must deny himself and take up his cross daily and follow me.OLCBBongo Yesu alobaki na bango nyonso : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.
24For whoever intends to save his life will lose it, but whoever loses his life because of me will save it.OLCBPamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango.
25For what use is it if someone gains the whole world, yet loses or forfeits himself?OLCBLitomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye ?
26Whoever is ashamed of me and my words, the Son of Man will be ashamed of him when he comes in his own glory and the glory of the Father and the holy angels.OLCBMoto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.
27But I tell you truly, some standing here will not taste death before they see the kingdom of our Father."OLCBNazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.
28About eight days after these words, Jesus took Peter, John, and James up a mountain to pray.OLCBMikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
29As he was praying, the appearance of his face changed, and his clothing became dazzling white.OLCBWana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.
30And there were two men talking with him—Moses and Elijah,OLCBMibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya
31who appeared in glory, speaking of his departure, which he was about to fulfill in Jerusalem.OLCBoyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.
32Peter and his companions were weighed down with sleep; fully awake, they saw his glory and the two men standing with him.OLCBPetelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.
33As they were leaving him, Peter said to Jesus, "Master, it's good we're here. Let's make three shelters—one for you, one for Moses, one for Elijah." He didn't know what he was saying.OLCBWana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa ! Totonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba.
34As he spoke, a cloud came and covered them in shadow; entering it, they were afraid.OLCBWana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango.
35A voice from the cloud said, "This is my Son, my Chosen One—listen to him!"OLCBMongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki : — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye !
36When the voice ended, Jesus was found alone. They stayed silent, telling no one in those days what they had seen.OLCBSima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.
37The next day, when they came down from the mountain, a large crowd met him.OLCBMokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.
38A man from the crowd shouted, "Teacher, please look at my son, because he's my only child.OLCBMobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki : — Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko !
39A spirit seizes him, and suddenly he cries out; it convulses him until he foams, scarcely leaving him, battering him.OLCBMolimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye.
40I begged your disciples to drive it out, but they could not."OLCBNasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
41Jesus answered, "Distrustful, twisted generation, how long must I stay with you and endure you? Bring your son here."OLCBYesu alobaki : — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.
42As the boy was coming, the demon threw him down and convulsed him. But Jesus rebuked the unclean spirit, healed the boy, and returned him to his father.OLCBWana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.
43All were astonished at our Father's majesty. While everyone was amazed at everything Jesus did, he said to his disciples,OLCBMpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe. Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye :
44"Store these words in your ears: the Son of Man will soon be delivered into human hands."OLCB— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.
45But they didn't understand this word—hidden from them so they couldn't grasp it—and they were afraid to ask him about it.OLCBKasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.
46Now an argument arose among them as to which of them was the greatest.OLCBTembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango.
47But Jesus, knowing their hearts' thoughts, took a child and stood him beside himself,OLCBKasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye,
48and told them, "Whoever receives this child in my name receives me, and whoever receives me receives the one who sent me. For the least among you all—that one is great."OLCBmpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.
49John said, "Master, we saw someone driving out demons in your name and tried to stop him, because he doesn't follow with us."OLCBYoane alobaki : — Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te.
50"Do not stop him," Jesus said to him, "for whoever is not against you is for you."OLCBYesu alobaki : — Bopekisa ye te, pamba te moto nyonso oyo atelemelaka bino te azali mpo na bino.
51When the days neared for him to be taken up to heaven, Jesus resolutely set his face to go to Jerusalem.OLCBLokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi.
52He sent messengers ahead of him. They went and entered a Samaritan village to prepare for him,OLCBAtindaki bantoma liboso na Ye ; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko.
53but the people there did not welcome him, because he was heading for Jerusalem.OLCBKasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi.
54Seeing this, the disciples James and John said, "Lord, do you want us to call down fire from heaven to consume them?"OLCBTango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki : — Nkolo, olingi ete tobelela moto ete ekitela bango kowuta na likolo mpo na kobebisa bango ?
55But he turned and rebuked them.OLCBYesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango : [— Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye ? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.]
56And they went on to another village.OLCBBongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.
57As they walked the road, someone said to him, "I'll follow you wherever you go."OLCBWana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu : — Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
58Jesus said, "Foxes have dens, birds of the sky have nests, but the Son of Man has nowhere to lay his head."OLCBYesu azongiselaki ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
59To another he said, "Follow me." He replied, "Lord, first let me go bury my father."OLCBYesu alobaki na mobali mosusu : — Landa Ngai. Kasi mobali yango azongiselaki Ye : — Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai.
60But Jesus told him, "Let the dead bury their own dead, but you go proclaim the kingdom of our Father."OLCBYesu alobaki na ye : — Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.
61Another also said, "I'll follow you, Lord, but first let me say goodbye to those at my house."OLCBMosusu lisusu alobaki na Ye : — Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.
62Jesus replied, "No one who puts a hand to the plow and looks back is fit for our Father's kingdom."OLCBYesu azongiselaki ye : — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.