1Soon after, he traveled through towns and villages, preaching and announcing the good news of our Father's kingdom. The twelve were with him,OLCBSima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye,
2and some women healed of evil spirits and illnesses: Mary, called Magdalene, from whom seven demons had left,OLCBbakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ;
3and Joanna, wife of Chuza, manager for Herod, and Susanna, and many others, who supported them from their own resources.OLCBJane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
4As a large crowd gathered, with people from every town coming to him, he spoke in a parable:OLCBWana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo :
5"A sower went out to sow. As he sowed, some seed fell on the path, got trampled, and birds of the sky ate it.OLCB— Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango.
6Other seed fell on rock; sprouting, it withered from lack of moisture.OLCBNdambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga ; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te.
7Some fell among the thorns, and the thorns grew up with it and choked it.OLCBNdambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.
8Other seed fell on good soil, grew, and yielded a hundredfold." Saying this, he called out, "Whoever has ears to hear, let him hear."OLCBKasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
9His disciples asked him what this parable meant.OLCBBayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango.
10He said, "You've been given to know the secrets of our Father's kingdom; the rest get parables, so that 'seeing they may not see, and hearing they may not understand.'"OLCBAzongiselaki bango : — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete, atako bakoki kotala, bamona te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
11"Now the parable is this: The seed is the word of our Father.OLCBTala ndimbola ya lisese yango : Nkona ezali Liloba na Nzambe.
12Those along the path are the ones who hear; then the devil comes and takes the word from their hearts, so they won't believe and be saved.OLCBNkona oyo ekweyaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango kati na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babikisama te.
13Those on the rock hear the word and receive it with joy, but have no root; they believe for a while, then fall away in time of testing.OLCBNkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa : bandimaka kaka mpo na mwa tango moke ; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.
14What fell among thorns: these are those who hear, but as they go, life's worries, wealth, and pleasures choke them, and their fruit never matures.OLCBNkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.
15But the one in good soil: these hear the word with an honest, good heart, hold it firmly, and bear fruit through perseverance."OLCBNkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.
16"No one lights a lamp, covers it with a jar, or puts it under a bed; instead, he sets it on a stand, so those entering can see the light.OLCBMoto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
17For nothing is hidden that won't be revealed, nothing secret that won't be known and brought to light.OLCBPamba te eloko moko te ebombama ekozanga kobima na pole, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana to kobima na pole.
18So watch how you listen, for whoever has, more will be given to him; whoever has not, even what he thinks he has will be taken away."OLCBBoye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
19His mother and brothers came to him but couldn't reach him because of the crowd.OLCBMama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele.
20And he was told, "Your mother and your brothers are standing outside, wanting to see you."OLCBMoto moko ayebisaki Ye : — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.
21But he answered them, "My mother and my brothers are those who hear the word of our Father and do it."OLCBKasi Yesu azongisaki : — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
22One day he and his disciples got into a boat. He said to them, "Let us cross over to the other side of the lake." So they set out.OLCBMokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki.
23As they sailed, he fell asleep. A windstorm swept down on the lake; the boat filled with water, and they were endangered.OLCBWana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene.
24They woke him, saying, "Master, Master, we're dying!" He got up, rebuked the wind and the raging water; they stopped, and it grew calm.OLCBBayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga : — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa ! Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki.
25He asked them, "Where is your faith?" Afraid and amazed, they said to each other, "Who then is this? He commands even the winds and water, and they obey him."OLCBYesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »
26Then they sailed to the region of the Gerasenes, which is opposite Galilee.OLCBBakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile.
27As Jesus stepped onto land, a demon-possessed man from the city met him. For a long time he'd worn no clothes and stayed not in a house but among the tombs.OLCBTango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda.
28Seeing Jesus, he cried out, fell before him, and said loudly, "What do you want with me, Jesus, Son of the Most High God? I beg you, don't torment me!"OLCBTango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !
29Jesus had ordered the unclean spirit out of the man, for it had often seized him; though guarded and bound with chains and shackles, he would break them and be driven by the demon into the wilderness.OLCBPamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.
30Jesus asked him, "What is your name?" He said, "Legion," for many demons had entered him.OLCBYesu atunaki ye : — Kombo na yo nani ? Azongisaki : — Ngulupa. Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye.
31And they begged him not to command them to depart into the abyss.OLCBBongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo.
32A large herd of pigs was feeding on the hillside there. The demons begged him to let them enter the pigs, and he allowed it.OLCBNzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela.
33So the demons left the man and entered the pigs; the herd rushed down the cliff into the lake and drowned.OLCBMilimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
34Herdsmen saw it, fled, and reported it in the city and in the countryside.OLCBTango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga.
35The crowd came out to see what had happened. Reaching Jesus, they found the man freed of demons sitting at Jesus' feet, dressed and clear-minded—and fear seized them.OLCBBato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka ; boye somo ekangaki bango.
36And those who had seen it told them how the demon-possessed man had been healed.OLCBBa-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki.
37All the people of the Gerasene region asked him to leave them, because great fear gripped them. So he boarded the boat and went back.OLCBBongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.
38The man the demons had left begged to go with him, but Jesus sent him away, saying,OLCBMobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba :
39"Return home; tell how much our Father has done for you." He went, proclaiming throughout the whole city how much Jesus had done for him.OLCB— Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo. Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye.
40Now when Jesus returned, the crowd welcomed him, for they were all waiting for him.OLCBTango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye.
41A man named Jairus, a synagogue leader, came and fell at Jesus' feet, begging him to come to his house,OLCBMobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye,
42for he had an only daughter, about twelve years old, dying. As Jesus went, crowds pressed around him.OLCBpamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
43A woman had bled for twelve years; she had spent her whole livelihood on doctors, but none could heal her.OLCBNzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.
44Coming up behind him, she touched the tassel of his cloak, and her bleeding stopped instantly.OLCBAdusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
45Jesus said, "Who touched me?" When all denied it, Peter said, "Master, the crowds crowd and press against you."OLCBYesu atunaki : — Nani asimbi Ngai ? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
46But Jesus said, "Someone touched me, for I felt that power had gone out from me."OLCBKasi Yesu alobaki : — Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
47Seeing she couldn't stay hidden, the woman came trembling, fell before him, and declared in front of everyone why she'd touched him and how she was instantly healed.OLCBAwa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye.
48And he said to her, "Daughter, your faith has healed you; go in peace."OLCBKasi Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.
49While he was still speaking, someone from the synagogue leader's house said, "Your daughter has died; don't bother the Teacher anymore."OLCBWana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki : — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.
50But Jesus heard and answered him, "Don't be afraid; just believe, and she'll be saved."OLCBLokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi : — Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
51Arriving at the house, he let no one enter with him except Peter, John, James, and the child's father and mother.OLCBTango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana.
52All were weeping and mourning her, but he said, "Don't weep, for she's not dead, only asleep."OLCBBato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !
53And they laughed at him, knowing that she was dead.OLCBBato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa.
54But he took her by the hand and called out, "Child, get up."OLCBKasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki : — Mwana na Ngai, lamuka !
55Her spirit returned, and she got up instantly. He told them to give her something to eat.OLCBPema ya bomoi ezongaki kati na mwana ; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia.
56Her parents were amazed, but he ordered them to tell no one what had happened.OLCBBaboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.