Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 One Sabbath, when he went to eat in the house of one of the leaders of the Pharisees, they were watching him closely. Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu.
2 And there in front of him was a man whose body was swollen with fluid. Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto.
3 Jesus said to the experts in the law and the Pharisees, "Is it lawful to heal on the Sabbath, or not?" Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko : — Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?
4 But they stayed silent. So he took hold of the man, healed him, and sent him on his way. Kasi bavandaki kimia. Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye.
5 Then he said to them, "If one of you has a son or an ox that falls into a well on the Sabbath day, will you not immediately pull him out?" Bongo atunaki bango : — Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe ; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango ?
6 And they had no answer to give to this. Bakokaki te kopesa Ye eyano.
7 When he noticed how the guests chose the places of honor, he told them a parable: Tango Yesu amonaki ndenge nini bato oyo babengamaki na feti bazalaki kopona bisika ya lokumu, alobaki na bango lisese oyo :
8 "When someone invites you to a wedding feast, do not take the place of honor, because a more distinguished guest than you may have been invited. « Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende komivandisa te na esika ya lokumu, pamba te, kati na bato oyo babengami na feti yango, ekoki kozala na moto oyo aleki yo na lokumu.
9 Then the one who invited you both will come and say to you, 'Give this person your place,' and in disgrace you will have to take the lowest place. Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.
10 But when you are invited, go and take the lowest place, so that when your host comes he will say to you, 'Friend, move up higher.' Then you will be honored in front of all who are at the table with you. Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo : ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu ! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.
11 For all who exalt themselves will be humbled, and those who humble themselves will be exalted." Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »
12 Then he said to the man who had invited him, "When you give a lunch or a dinner, do not invite your friends or your brothers or your relatives or your rich neighbors. If you do, they may invite you back, and you would be repaid. Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.
13 But when you give a banquet, invite the poor, the crippled, the lame, the blind, Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ;
14 and you will be blessed. Since they have no way to repay you, you will be repaid at the resurrection of the righteous." mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
15 When one of those at the table with him heard this, he said to him, "Blessed is the one who will eat at the feast in the kingdom of our Father!" Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !
16 Jesus replied, "A certain man was giving a great banquet, and he invited many guests. Yesu azongiselaki ye : — Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele.
17 "When the time came for the banquet, he sent his servant to tell those who had been invited, 'Come, for everything is now ready.' Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »
18 But one after another they all began to make excuses. The first said to him, 'I have bought a field, and I must go and see it. Please excuse me.' Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
19 Another said, 'I have bought five pairs of oxen, and I am on my way to try them out. Please excuse me.' Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
20 And another said, 'I have just married a wife, and so I cannot come.'" Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. »
21 So the servant came back and reported this to his master. Then the master of the house became angry and said to his servant, 'Go out quickly into the streets and alleys of the town, and bring in the poor, the crippled, the blind, and the lame.' Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
22 "'Master,' the servant said, 'what you ordered has been done, and still there is room.' Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »
23 Then the master told the servant, 'Go out to the roads and country lanes and compel them to come in, so that my house will be full. Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.
24 For I tell you, not one of those who were invited will taste my banquet.'" Pamba te, nazali koloba na yo : moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »
25 Large crowds were traveling with him, and turning to them he said, Ebele ya bato bazalaki kokende elongo na Yesu. Yesu abalukaki mpo na kotala bango mpe alobaki :
26 "If anyone comes to me and does not hate his own father and mother and wife and children and brothers and sisters—yes, even his own life—he cannot be my disciple. — Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
27 Whoever does not carry his own cross and follow me cannot be my disciple. Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.
28 Suppose one of you wants to build a tower. Will he not first sit down and count the cost, to see whether he has enough to finish it? Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ?
29 Otherwise, if he lays the foundation and is not able to finish, everyone who sees it will begin to ridicule him, Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba :
30 saying, 'This person began to build and was not able to finish.' « Botala moto oyo ! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »
31 Or suppose a king is about to go to war against another king. Will he not first sit down and consider whether he is able with 10,000 men to face the one coming against him with 20,000? Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye ?
32 And if he cannot, he will send a delegation while the other is still far off and ask for terms of peace. Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.
33 In the same way, any one of you who does not give up everything he has cannot be my disciple. Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.
34 "Salt is good, but if it loses its saltiness, how can it be made salty again? Mungwa ezali malamu ; kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakozongisa lisusu elengi na yango ?
35 Fit for neither soil nor manure pile, it's thrown out. Whoever has ears to hear, let them hear." Ekozala lisusu na tina moko te, ezala mpo na mabele to mpo na kobongisa bilanga ; kasi bakobwaka yango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]