Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Just then some people told him about Galileans whose blood Pilate mixed with their sacrifices. Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka.
2 He replied, "Do you think these Galileans were worse sinners than all other Galileans because they suffered these things? Yesu alobaki na bango : — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile ?
3 No, I tell you; but unless you repent, you will all perish as well. Nazali koloba na bino : Ezali bongo te ! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
4 Or those eighteen killed when the tower in Siloam fell on them—do you think they were more guilty than everyone else in Jerusalem? Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?
5 No, I tell you; but unless you repent, you will all perish in the same way." Nazali koloba na bino : Ezali bongo te ! Soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
6 Then he told this parable: "A man had a fig tree planted in his vineyard. He came looking for fruit on it and found none. Bongo alobaki lisese oyo : — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino ; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.
7 He told the gardener, 'Look, for three years I've come seeking fruit on this fig tree and found none. Cut it down—why let it drain the ground?' Boye alobaki na mobateli elanga yango : « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango ! Mpo na nini ekanga mabele pamba ? »
8 But he replied, 'Sir, leave it this year too, until I dig around it and add manure. Mobateli elanga azongiselaki ye : « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo ! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola ;
9 Then if it bears fruit next year, good; if not, you can cut it down.'" tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. »
10 Now he was teaching in one of the synagogues on the Sabbath. Mokolo moko ya Saba, Yesu azalaki koteya kati na ndako ya mayangani.
11 Just then, a woman weakened by a spirit for eighteen years was bent over, unable to straighten up at all. Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe.
12 Seeing her, Jesus called her over and said, "Woman, you are freed from your disability." Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye : — Mwasi, okangolami na pasi na yo !
13 He laid hands on her, and immediately she straightened up and glorified our Father. Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.
14 But the synagogue leader, angry that Jesus had healed on the Sabbath, told the crowd, "There are six days for work. Come be healed on those days, not on the Sabbath." Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !
15 The Lord answered him, "Hypocrites! Doesn't each of you untie your ox or donkey from its stall on the Sabbath and lead it out to water it? Nkolo azongiselaki ye : — Bato ya bilongi mibale ! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi ?
16 Shouldn't this daughter of Abraham, bound by Satan for eighteen years, be freed from that bond on the Sabbath?" Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami ! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe ! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba ?
17 As he said these things, all his opponents were humiliated, and all the crowd celebrated all the glorious things he was doing. Tango alobaki bongo, bayini na Ye nyonso batondaki na soni ; kasi ebele ya bato bazalaki kosepela na bikamwa nyonso oyo azalaki kosala.
18 He said therefore, "What is the kingdom of our Father like? What should I compare it to? Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?
19 It's like a mustard seed a man took and planted in his garden, growing into a tree where the sky's birds nested in its branches." Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.
20 And again he said, "What should I compare the kingdom of our Father to? Yesu atunaki lisusu : — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini ?
21 It is like yeast a woman took and hid in three measures of flour until it all yeasted." Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki.
22 He went on his way through towns and villages, teaching and journeying toward Jerusalem. Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi.
23 Someone asked him, "Lord, are the saved few?" He said to them, Moto moko atunaki Ye : — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika ? Yesu alobaki na bango :
24 "Struggle to enter through the narrow door—many, I tell you, will try to enter and fail. — Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.
25 Once the homeowner rises and shuts the door, you'll stand outside knocking, saying, 'Lord, open for us.' He'll answer, 'I don't know where you're from.' Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »
26 Then you'll begin to say, 'We ate and drank before you; you taught in our streets.' Bongo bokoloba : « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso ! »
27 But he'll say, 'I tell you, I don't know where you're from. Get away from me, all you who do evil!' Kasi akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe ! »
28 There will be weeping and teeth grinding, when you see Abraham and Isaac and Jacob and all the prophets in the kingdom of our Father, while you yourselves are thrown out. Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe ; kasi bino, bokobwakama libanda.
29 People will come from east and west, from north and south, and sit down to eat in our Father's kingdom. Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe.
30 And indeed, some are last who will be first, and some are first who will be last." Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
31 At that same hour some Pharisees came, telling him, "Get out, leave here—Herod wants to kill you." Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo !
32 And he said to them, "Go tell that fox: Look, I drive out demons and complete healings today and tomorrow, and on the third day I am finished. Yesu alobaki na bango : — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »
33 Still, I must travel today, tomorrow, and the next day, since no prophet can die outside Jerusalem. Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda ; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi !
34 Jerusalem, Jerusalem, killing the prophets, stoning those sent to her! How often I longed to gather your children as a hen gathers her brood under her wings—but you refused! Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
35 Look, your house is left to you. I tell you: you won't see me until you say, 'Blessed is the one who comes in the name of our Father!'" Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino : Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]