Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now the tax collectors and sinners were all drawing near to hear him. Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye.
2 And the Pharisees and the scribes grumbled, saying, "This man welcomes sinners and eats with them." Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.
3 So he told them this parable: Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo :
4 "What man among you, owning one hundred sheep, if he loses one of them, won't leave the ninety-nine out in the open and go after the lost one till he finds it? — Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango ?
5 And when he has found it, he lays it on his shoulders, rejoicing." Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.
6 When he gets home, he calls his friends and neighbors together and tells them, "Celebrate with me—I've found my lost sheep." Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »
7 "I tell you, likewise, heaven holds more joy over one sinner who repents than over ninety-nine righteous people who don't need to repent." Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
8 "Or what woman with ten silver coins, each a day's wage, who loses one, doesn't light a lamp, sweep the house, and search carefully until she finds it?" Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango ?
9 When she finds it, she calls together her friends and neighbors: "Rejoice with me, for I found the coin I had lost." Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki ! »
10 "So, I tell you, there is joy before the angels of our Father over one sinner who repents." Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.
11 And he said, "There was a man who had two sons." Yesu alobaki lisusu : — Mobali moko azalaki na bana mibali mibale.
12 "The younger son told his father, 'Father, give me my share of the estate.' So he divided his property between them. Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. » Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.
13 Soon after, the younger son gathered all he owned, left for a distant country, and there burned through his wealth living recklessly. Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.
14 After he spent everything, a severe famine hit that country, and he began to go without. Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.
15 So he went and took work with a citizen of that country, who sent him to his fields to feed pigs. Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu.
16 And he longed to fill his stomach with the pods the pigs ate, but no one gave him any." Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.
17 Coming to his senses, he said, "How many of my father's hired hands have bread to spare, while I'm here starving?" Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala !
18 "'I will get up and go to my father, and say to him, "Father, I have sinned against heaven and before you."' Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.
19 'I'm no longer worthy to be called your son; make me like one of your hired workers.'" Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo ! › »
20 "He got up and went to his father. While he was still far off, his father saw him, and his heart broke with compassion—he ran, threw his arms around him, and kissed him." Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
21 And the son said, "Father, I've sinned against heaven and before you. I am no longer worthy to be called your son." Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »
22 But the father told his servants, "Quickly bring the best robe and dress him, put a ring on his hand and sandals on his feet." Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.
23 "'And bring the fattened calf and kill it, and let us eat and celebrate.' Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango ; tolia mpe tosala feti,
24 'For this son of mine was dead and is alive again; he was lost and is found.' And they started celebrating." pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! » Boye babandaki feti na esengo makasi.
25 "His older son was in the field; nearing the house on his return, he heard music and dancing. Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina.
26 And he called one of the servants and asked what was going on. Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka.
27 He said to him, 'Your brother has come, and your father has killed the fattened calf, because he received him back safe and sound.' Mosali azongisaki : « Ndeko na yo azongi ! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono. »
28 But he was angry and refused to enter. His father came out and pleaded with him, Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye.
29 but he answered his father, 'Look, I've served you all these years, never disobeying a command—yet you never gave me even a young goat to celebrate with my friends.' Kasi azongiselaki tata na ye : « Tala ! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai.
30 'But when this son of yours came, who devoured your wealth with prostitutes, you killed the fattened calf for him!'" Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye ! »
31 He said to him, "Son, you're always with me, and everything I have is yours." Tata azongiselaki ye : « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo.
32 "'It was fitting to rejoice and celebrate: this brother of yours was dead and is alive, was lost and is found.'" Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]