Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 All the Israelites came out, the assembly gathering as one man, from Dan to Beersheba, with the land of Gilead, before our Father at Mizpah. Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.
2 The leaders of all the people, all the tribes of Israel, took their place in the assembly of our Father's people—400,000 swordsmen on foot. Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe : ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga.
3 The Benjaminites heard the Israelites had gone up to Mizpah. The Israelites said, "Tell us, how did this evil happen?" Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki : — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.
4 The Levite, husband of the murdered woman, answered, "I and my concubine came to Gibeah in Benjamin to spend the night. Molevi, mobali ya mwasi oyo babomaki, alobaki : — Ngai mpe makangu na ngai, toyaki na Gibea, na mokili ya Benjame mpo na kolekisa butu.
5 The men of Gibeah came after me and surrounded the house at night, meaning to kill me. They raped my concubine, and she died. Na kati-kati ya butu, bavandi ya Gibea batombokelaki ngai mpe bazingelaki ndako mpo ete baboma ngai ; basangisaki nzoto na makasi na makangu na ngai, mpe akufaki.
6 Then I took my concubine, cut her in pieces, and sent her throughout Israel's inheritance, because they committed a shameful outrage in Israel. Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni.
7 Look, all of you Israelites—give your decision and counsel here and now." Sik’oyo, bino nyonso bana ya Isalaele, boloba mpe bokata likambo oyo.
8 All the people rose as one, saying, "None of us will go to his tent; none of us will return to his house. Bato nyonso batelemaki lokola moto moko mpe balobaki : « Moto moko te kati na biso akozonga na ndako na ye ya kapo to na ndako na ye.
9 Now this is what we'll do to Gibeah: we'll attack it by lot. Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea : Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa.
10 From every tribe of Israel we'll take ten men of 100, one hundred of 1,000, 1,000 of 10,000, to get provisions for the troops going to Gibeah of Benjamin, to repay all the outrage it did in Israel." Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »
11 So all the men of Israel gathered against the city, united as one. Boye, mibali nyonso ya Isalaele basanganaki esika moko mpe bayokanaki lokola moto moko mpo na kobundisa engumba Gibea.
12 The tribes of Israel sent men throughout Benjamin's tribe, asking, "What evil is this that happened among you? Bato ya bikolo ya Isalaele batindaki mibali kati na mabota nyonso ya Benjame mpe balobaki : « Ndenge nini bosali lisumu ya somo boye kati na bino ?
13 Now hand over the worthless men in Gibeah, so we may put them to death and remove the evil from Israel." But the Benjaminites would not listen to the voice of their brothers, the Israelites. Sik’oyo, botindela biso bato mabe wana ya Gibea mpo ete toboma bango mpe tolongola mabe kati na Isalaele. » Kasi bato ya Benjame baboyaki koyokela baninga na bango, bana ya Isalaele.
14 Instead the Benjamites gathered from their towns to Gibeah, to go fight the Israelites. Wuta na bingumba na bango nyonso ya mike, bato ya libota ya Benjame basanganaki esika moko, na Gibea, mpo na kobundisa bana ya Isalaele.
15 That day Benjamin mustered 26,000 swordsmen from their towns, plus 700 chosen men from Gibeah's residents. Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.
16 Among all these troops were 700 chosen left-handed men, each able to sling a stone at a hair and not miss. Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko.
17 The men of Israel, apart from Benjamin, mustered 400,000 swordsmen, every one a warrior. Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.
18 The Israelites set out and went up to Bethel and inquired of our Father, "Who of us should go up first to fight against the Benjaminites?" And our Father said, "Judah will go up first." Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.
19 So the Israelites rose in the morning and camped near Gibeah. Na tongo oyo elandaki, bana ya Isalaele bakendeki mpe batongaki molako na bango pembeni ya Gibea.
20 Israel's men went out to battle Benjamin and formed their lines against them at Gibeah. Mibali ya Isalaele babimaki mpo na kobundisa bato ya libota ya Benjame mpe bamibongisaki mpo na kobundisa bango na Gibea.
21 The Benjaminites came out of Gibeah and cut down 22,000 Israelites on the field that day. Bato ya libota ya Benjame babimaki na Gibea mpe babomaki, mokolo wana, mibali ya Isalaele nkoto tuku mibale na mibale.
22 But Israel's army took courage and again formed their battle line where they had stationed themselves the first day. Kasi mibali ya Isalaele bamilendisaki, bango na bango, mpe babongamaki na esika oyo bazalaki na mokolo ya liboso.
23 The Israelites went up, wept before our Father until evening, and asked, "Will we fight our brothers the Benjaminites again?" And our Father said, "Go up against them." Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.
24 So the Israelites advanced against the Benjaminites on the second day. Na mokolo ya mibale, bana ya Isalaele babundisaki bato ya libota ya Benjame.
25 Benjamin came out from Gibeah against them the second day and cut down another 18,000 Israelites, all armed with swords. Na tango wana, bana ya libota ya Benjame bakimaki na Gibea mpo na kobundisa bana ya Isalaele, babomaki lisusu mibali ya Isalaele nkoto zomi na mwambe ; bango nyonso bazalaki bato oyo bayebi kobunda na mopanga.
26 Then all the Israelites, the whole army, went up to Bethel and sat there weeping before our Father. They fasted till evening that day and offered burnt offerings and peace offerings before him. Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.
27 The Israelites asked our Father. (In those days the ark of the covenant of our Father was there, Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna.
28 and Phinehas son of Eleazar, son of Aaron, served before it.) They asked, "Will we go out again to fight our brothers the Benjamites, or stop?" Our Father replied, "Go up, for tomorrow I will give them into your hand." Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.
29 Then Israel set men in ambush all around Gibeah. Bongo mibali ya Isalaele babombamaki mpe bazingelaki Gibea.
30 On the third day the Israelites marched against the Benjaminites and took positions against Gibeah as before. Bana ya Isalaele bakendeki na mokolo ya misato kobundisa libota ya Benjame mpe bamibongisaki malamu mpo na kobundisa Gibea lokola na mbala ya liboso.
31 The Benjaminites came out to meet them and were drawn from the city. As before, they began striking down the people, killing about thirty men of Israel in the open country and on the roads, one going up to Bethel, the other to Gibeah. Bana ya Benjame babimelaki bango mpe babendaki bango mosika ya engumba. Babandaki koboma bana ya Isalaele ndenge basalaki liboso ; babomaki bato pene tuku misato kati na zamba, na nzela ya Beteli mpe ya Gibea.
32 The Benjaminites said, "We're routing them like before." But Israel had said, "Let's flee and draw them from the city to the roads." Libota ya Benjame bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. Nzokande bana ya Isalaele bazwaki mokano ya kokima mpe ya komema bango mosika ya engumba, mosika ya Gibea.
33 All Israel's men rose from their places and formed up at Baal-tamar, while Israel's ambush burst from its place west of Geba. Na bongo, bana ya Isalaele batelemaki na bisika na bango mpe bakendeki kosangana mpo na bitumba, na Bala-Tamari. Bana ya Isalaele, oyo babombamaki, babimaki na bisika na bango mpe balandaki bango na etando ya polele, na Gibea.
34 10,000 of Israel's finest advanced against Gibeah, and the fighting was fierce; but the Benjaminites did not realize disaster was closing in on them. Mibali makasi ya Isalaele, nkoto zomi, babimaki na Gibea ; mpe bitumba ezalaki makasi. Kasi bana ya libota ya Benjame basosolaki te mabe nini ekokomela bango.
35 Our Father defeated Benjamin before Israel; that day Israel struck down 25,100 men of Benjamin, all armed with swords. Yawe abetaki bana ya Benjame liboso ya Isalaele, mpe, na mokolo wana, bana ya Isalaele babomaki mibali nkoto tuku mibale na nkama moko kati na libota ya Benjame, ba-oyo bayebi kobunda na mopanga.
36 The Benjaminites saw they were beaten. Israel's men gave ground to Benjamin, trusting the ambush they had set against Gibeah. Bongo bana ya Benjame bamonaki ete bakweyi penza na bitumba. Nzokande bana ya Isalaele bakosaki kozonga sima mpo ete batiaki elikya na bango epai ya mibali oyo babombamaki pene ya Gibea.
37 The ambush rushed suddenly against Gibeah; they spread out and struck the whole city with the sword. Mibali yango babimelaki mbala moko Gibea, bapanzanaki mpe babetaki engumba mobimba na mopanga.
38 Israel's men had set a signal with the ambush: a great cloud of smoke rising from the city. Mibali ya Isalaele mpe bandeko na bango, oyo babombamaki pene ya Gibea, bayokanaki na elembo moko : mibali oyo babombamaki basengeli komatisa wuta na engumba lipata ya milinga na likolo.
39 The men of Israel would turn in the battle. Benjamin had begun striking them down, killing about thirty, and thought, "Surely they're beaten before us as in the first battle." Tango bana ya Isalaele bamonaki lipata wana ya milinga, bapesaki mokongo na bitumba. Kasi mibali ya Benjame babandaki kobeta mpe koboma bana ya Isalaele pene tuku misato. Bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso.
40 When the smoke column began rising from the city, the Benjaminites looked back—and the whole city was going up in smoke toward the sky. Kasi tango lipata ya milinga ebandaki komata makasi na likolo, bana ya Benjame babalukaki mpe bamonaki engumba na bango mobimba kopela moto mpe komatisa likonzi monene ya lipata ya milinga.
41 The men of Israel turned, and the men of Benjamin panicked, seeing that disaster had reached them. Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango.
42 So they turned before Israel's men toward the wilderness, but the battle caught up with them, and those from the towns cut them down in the middle of the fighting. Boye, bapesaki bana ya Isalaele mokongo mpe bakimaki na nzela ya esobe. Kasi bitumba elandaki bango, mpe mibali ya Isalaele, oyo babimaki na engumba Gibea, basilisaki koboma bango nyonso na nzela na bango.
43 They surrounded the Benjaminites, chased them, and overtook them at their resting place east of Gibeah. Bazingelaki bana ya Benjame, balandaki bango na kozanga kopema mpe banyataki bango na makolo kino liboso ya Gibea, na ngambo oyo moyi ebimelaka.
44 18,000 Benjaminites fell, all of them valiant men. Kati na bana ya Benjame, mibali nkoto zomi na mwambe bakufaki : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
45 The rest fled toward the wilderness to the rock of Rimmon, but Israel cut down 5,000 on the roads and pursued them to Gidom, striking down 2,000 more. Ndambo kati na bango bakimaki na nzela ya esobe, na ngambo ya libanga monene ya Rimoni. Na nzela, bana ya Isalaele babomaki bato nkoto mitano oyo balokotaki na nzela. Balandaki bango lisusu kino na Gideomi mpe babomaki mibali nkoto mibale.
46 So all the Benjaminites who fell that day were 25,000 swordsmen, all of them valiant men. Motango nyonso ya bana ya Benjame oyo bakufaki na mokolo wana ezalaki nkoto tuku mibale na mitano : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba mpe bayebaki kobunda na mopanga.
47 But 600 men fled into the wilderness to the rock of Rimmon, staying there four months. Mibali nkama motoba kati na bango balongaki kopesa mokongo mpe kokima na nzela ya esobe kino na libanga monene ya Rimoni. Bawumelaki kuna sanza minei.
48 The men of Israel turned back on the Benjaminites and struck them with the sword—the whole town, the people, the animals, everything they found. They also burned every town in their path. Mibali ya Isalaele bazongelaki bato ya libota ya Benjame mpe babomaki na mopanga mibali nyonso elongo na bibwele na bango, kobanda na engumba Gibea kino na bamboka mike. Batumbaki bamboka mike nyonso epai wapi balekaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]