Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In those days Israel had no king. A Levite in Ephraim's remote hill country took a concubine from Bethlehem in Judah. Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.
2 His concubine was unfaithful to him, left him for her father's house in Bethlehem, Judah, and stayed four months. Kasi makangu yango atambolaki na ekobo liboso na ye, alongwaki na libala mpe azongaki na ndako ya tata na ye, na Beteleemi kati na Yuda. Sima na basanza minei wuta azongaki na ndako ya tata na ye,
3 Her husband set out after her, to speak to her heart and bring her back, with his servant and two donkeys. She brought him to her father's house, and the girl's father was glad to meet him. mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye ; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye.
4 His father-in-law, the girl's father, prevailed on him to stay, and he remained with him three days; they ate, drank, and slept there. Tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, akangaki ye mpo ete avanda mwa moke. Boye avandaki na ye mikolo misato, aliaki, amelaki mpe alalaki kuna.
5 On the fourth day they rose early, and he got up to leave. But the girl's father told his son-in-law, "Have a bit of bread, then go." Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. »
6 The two sat, ate, drank together. The girl's father said to the man, "Please, stay tonight and let your heart be glad." Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »
7 The man rose to leave, but his father-in-law urged him, so he stayed the night there again. Mobali atelemaki mpo na kokende ; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango.
8 On the fifth day he rose early to leave; the girl's father said, "Please restore yourself, and wait until afternoon." So the two of them ate. Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko.
9 As the man rose to go, with his concubine and servant, his father-in-law, the girl's father, said, "Look, day is nearly gone; stay the night. See, it's ending; lodge here and enjoy yourself. Tomorrow rise early, travel on, and go home." Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »
10 But the man refused to stay the night; he got up, departed, and came opposite Jebus (Jerusalem), with his two saddled donkeys and his concubine. Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu ; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza.
11 Near Jebus, with daylight nearly gone, the servant said to his master, "Come, please, let's turn into this Jebusite city and spend the night." Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye : — Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu.
12 His master replied, "We won't turn into a foreign city, not Israelite; we'll press on to Gibeah." Nkolo azongiselaki ye : — Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali ; tokokoma kino na Gibea.
13 He told his servant, "Come, let's reach one of these places and lodge in Gibeah or Ramah." Alobaki lisusu na mosali na ye : — Yaka, topusana pene na moko ya bamboka oyo ; bongo tokolekisa butu kati na Gibea to na Rama.
14 So they went on their way, and the sun set on them near Gibeah in Benjamin. Boye bakobaki kotambola, mpe moyi ebungaki tango bakomaki pene ya Gibea, kati na mokili ya Benjame.
15 They turned aside to lodge at Gibeah. He went in and sat in the city square, but no one took them into his house to lodge. Batelemaki na Gibea mpo na kolekisa butu. Bakotaki mpe bavandaki na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka, kasi moto moko te ayambaki bango na ndako na ye mpo na kolekisa butu.
16 An old man came from field work at evening. He was from the hill country of Ephraim, living in Gibeah as a foreigner; the local men were Benjamites. Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga ; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame.
17 The old man looked up, saw the traveler in the city square, and asked, "Where are you going? Where have you come from?" Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye : — Okeyi wapi mpe owuti wapi ?
18 He said to him, "We're traveling from Bethlehem in Judah to the far hill country of Ephraim—that's my home. I went to Bethlehem in Judah, and now I'm going to our Father's house, but no one takes me into his house. Moto ya mobembo azongiselaki ye : — Towuti na Beteleemi ya Yuda ; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye.
19 We have both straw and feed for our donkeys, and also bread and wine for me, your maidservant, and the young man with your servants. We lack nothing." Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo ; tozangi eloko moko te.
20 The old man said, "Peace to you. I'll supply all you need; just don't lodge in the square." Mobange yango alobaki : — Tika ete kimia ezala na yo ! Bosenga na yo nyonso ekozala na moto na ngai. Kasi kolekisa butu te na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka.
21 He brought him home, fed the donkeys, and they washed their feet, ate, and drank. Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki.
22 While they were enjoying themselves, suddenly worthless men of the city surrounded the house, pounding on the door. They shouted to the old man who owned the house, "Bring out the man who entered your house, so we can have relations with him!" Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako : — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.
23 The house's owner went out to them and said, "No, my brothers, please don't do evil since this man came into my house; don't do this disgraceful thing. Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango : — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.
24 Here are my virgin daughter and his concubine—let me bring them out. Violate them, do to them whatever seems good to you, but don't do this disgraceful thing to this man." Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako ! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te.
25 But the men wouldn't listen. So the man grabbed his concubine and pushed her out to them; they raped and abused her all night until dawn, then let her go. Kasi mibali yango baboyaki koyokela ye. Boye mobali azwaki makangu na ye mpe abimisaki ye libanda epai na bango. Bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, butu mobimba ; mpe tango tongo ekomaki pene ya kotana, batikaki ye akende.
26 At daybreak the woman came and fell at the man's house door, where her master was, until daylight. Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu.
27 At dawn her master rose, opened the house doors, went out on his way—there lay his concubine, fallen at the house entrance, hands on the threshold. Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye ; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke.
28 He said to her, "Get up, let's go." No answer. So he put her on the donkey and headed home. Alobaki na ye : « Telema ; tokende ! » Kasi azwaki eyano te. Bongo mobali yango atiaki makangu na ye na likolo ya ane na ye, akobaki mobembo na ye mpo na kozonga na ndako na ye.
29 At home he took a knife, seized his concubine, cut her limb by limb into twelve pieces, and sent her throughout all Israel's territory. Tango akomaki na ndako na ye, azwaki mbeli, akataki nzoto ya makangu na ye na biteni zomi na mibale mpe atindaki yango na etando nyonso ya Isalaele.
30 All who saw it said, "No such thing has happened or been seen since Israel came up out of Egypt until today. Consider it, discuss it, and speak." Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki : « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]