Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In those days Israel had no king. The tribe of Dan was seeking territory to settle in, for until then no inheritance had fallen to them among the tribes of Israel. Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda ; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele.
2 The Danites sent five brave men from their clan, from Zorah and Eshtaol, to scout and explore the land. They told them, "Go, explore the land." They reached the hill country of Ephraim, to Micah's house, and stayed the night there. Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango : « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. » Mibali mitano yango bakotaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika, epai wapi balekisaki butu.
3 Near Micah's house they recognized the young Levite's voice, so they turned in there and said to him, "Who brought you here? What are you doing in this place? What do you have here?" Tango bakomaki pembeni ya ndako ya Mika, bayokaki mongongo ya elenge mobali Molevi. Babalukaki epai ye azalaki mpe balobaki na ye : — Nani amemaki yo awa ? Ozali kosala nini na esika oyo ? Mpo na nini ozali awa ?
4 He told them, "Micah did such and such for me; he hired me, and I became his priest." Elenge mobali ayebisaki bango : — Tala makambo oyo Mika asali mpo na ngai : Azwi ngai na mosala mpe akomisi ngai nganga-nzambe na ye.
5 They said to him, "Please ask our Father, so we'll know whether the journey we're taking will succeed." Balobaki na ye : — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.
6 The priest told them, "Go in peace. Your journey is under the watch of our Father." Nganga-nzambe azongiselaki bango : — Bokende na kimia, Yawe andimi mobembo na bino.
7 So the five men went to Laish and saw its people living safely, like the Sidonians—quiet and secure—lacking nothing in the land and possessing wealth. They were far from the Sidonians and had no dealings with anyone. Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te.
8 When they returned to their relatives at Zorah and Eshtaol, they were asked, "What did you find?" Tango mibali mitano yango bazongaki na Tsorea mpe na Eshitaoli, bandeko na bango batunaki bango : — Sango nini bomemeli biso ?
9 They said, "Get up, let's attack them! We've seen the land—it's very good. Will you do nothing? Don't delay to go take the land. Bazongisaki : — Totelema, tokende kobotola mokili na bango ! Tomoni ete mokili yango ezali malamu penza. Boni ! Mpo na nini bovandi kimia boye ? Bozala bagoyigoyi te mpo na kokende kokota mpe kobotola mokili yango.
10 When you arrive, you'll reach an unsuspecting people in a spacious land. Our Father has handed it to you—a place lacking nothing on earth." Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele.
11 600 men of the Danite clan, armed with weapons of war, set out from Zorah and Eshtaol. Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, elongo na bibundeli na bango, balongwaki na Tsorea mpe na Eshitaoli.
12 They went up and camped at Kiriath-jearim in Judah. That is why it's called Mahaneh-dan to this day; it lies west of Kiriath-jearim. Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi.
13 From there they crossed to the hill country of Ephraim and reached Micah's house. Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika.
14 Then the five men who had scouted the land of Laish said to their relatives, "Do you know these houses hold an ephod, household idols, a carved image, and a cast idol? Now decide what to do." Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. »
15 So they turned in and came to the young Levite's house, Micah's house, and greeted him. Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote.
16 The 600 armed Danite men stood at the gate's entrance. Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, oyo bamilengelaki mpo na bitumba batelemaki na ekotelo ya ekuke.
17 The five men who had scouted the land went in and took the carved image, the ephod, the household idols, and the cast idol, while the priest stood at the gate entrance with the 600 armed men. Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba.
18 When these men entered Micah's house and took the carved image, ephod, household idols, and cast idol, the priest asked them, "What are you doing?" Tango mibali bakotaki na ndako ya Mika mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto, nganga-nzambe alobaki na bango : — Likambo nini bozali kosala ?
19 They said, "Quiet! Put your hand on your mouth, come with us. Be our father and priest. Better for you to be priest to one man's house, or to a tribe and clan in Israel?" Bazongisaki : — Kanga monoko ! Tia loboko na monoko na yo, yaka elongo na biso mpe zala tata na biso mpe nganga-nzambe na biso. Boni, likambo nini eleki malamu : kozala nganga-nzambe ya moto to kozala nganga-nzambe ya libota mpe ya etuka moko ya Isalaele ?
20 The priest's heart was glad. He took the ephod, household idols, and carved image, and went among the people. Nganga-nzambe atondaki na esengo, akamataki efode, banzambe ya bikeko ya ndako mpe bikeko mosusu ; akendeki elongo na bato ya libota ya Dani.
21 Then they turned and set out, putting the children, the livestock, and their goods in front of them. Babalukaki mpe bazongelaki nzela na bango ya mobembo, batiaki liboso bana na bango ya mike, bibwele mpe bozwi na bango ya talo.
22 When they had left Micah's house, the men near it were summoned and caught up with the Danites. Tango bakomaki mwa mosika na ndako ya Mika, Mika mpe bato oyo bazalaki pene ya ndako na ye batelemaki na koganga mpe balandaki libota ya Dani.
23 They shouted to the Danites, who turned and said to Micah, "What's wrong with you, calling out your men?" Awa bazalaki kobelela sima na libota ya Dani, bana ya Dani babalukaki mpe batunaki Mika : — Likambo nini ezwi yo mpo ete omemela biso ebele ya bato boye ?
24 He said, "You took the gods I made and the priest, and left. What do I have left? How can you ask me, 'What's wrong with you?'" Mika azongisaki : — Bozwi banzambe na ngai, oyo nasalaki, nganga-nzambe na ngai, mpe bokeyi na bino ; eloko nini natikali na yango lisusu ? Ndenge nini bokoki kotuna ngai : « Likambo nini ezwi yo ? »
25 The Danites told him, "Don't let your voice be heard among us, or angry men will attack you, and you'll lose your life and your household's lives." Bato ya libota ya Dani bazongiselaki ye : — Tika ete mongongo na yo eyokana te kati na biso, noki te bato ya kanda bakokweyela yo mpe bakoboma yo elongo na libota na yo mobimba.
26 The Danites went on their way; and when Micah saw they were too strong for him, he turned back home. Bana ya libota ya Dani balandaki nzela na bango. Tango Mika amonaki ete bana ya Dani baleki ye na makasi, abalukaki mpe azongaki na ndako na ye.
27 They took what Micah had made, and his priest, and came to Laish—a quiet, unsuspecting people—struck them with the edge of the sword, and burned the city with fire. Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye. Bongo bakendeki kobundisa engumba Laishi, mboka ya bato ya kimia mpe ya kozanga nungunungu ; babomaki bato nyonso na mopanga mpe batumbaki engumba na bango na moto.
28 No one could rescue them, for the city lay far from Sidon with no ties to anyone. It sat in the valley that belongs to Beth-rehob. The Danites rebuilt the city and settled there. Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna.
29 They named the city Dan, after their ancestor Dan, Israel's son; but the city was formerly named Laish. Bapesaki engumba yango kombo « Dani. » Ezalaki kombo ya koko na bango, Dani, mwana mobali ya Isalaele. Na kala, bazalaki kobenga engumba yango Laishi.
30 The Danites set up the carved image for themselves. Jonathan, son of Gershom, son of Moses, and his sons were priests to the tribe of the Danites until the day of the land's captivity. Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu.
31 They set up for themselves the carved image Micah had made, the whole time the house of our Father was at Shiloh. Bakobaki kosalela bikeko oyo Mika asalaki na tango nyonso oyo Ndako ya Nzambe ezalaki na Silo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]