Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 There was a man from the hill country of Ephraim whose name was Micah. Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Mika. »
2 He told his mother, "The 1,100 pieces of silver taken from you, which you cursed—I heard you say it—look, I have the silver; I took it." His mother said, "May our Father bless my son." Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo !
3 So he returned the 1,100 pieces of silver to his mother, and she said, "I solemnly dedicate this silver to our Father from my own hand, for my son, to make a carved image and a cast idol. Now I give it back to you." Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki : — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango.
4 He returned the silver to his mother; she took 200 pieces and gave them to a silversmith, who made a carved image and a cast idol; it stood in Micah's house. Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.
5 This man Micah had a shrine, made an ephod and household idols, and ordained one of his sons as his priest. Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.
6 In those days Israel had no king; everyone did what was right in his own eyes. Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala nyonso oyo ezali malamu na miso na ye.
7 A young man from Bethlehem in Judah, of Judah's clan, was a Levite staying there. Nzokande, ezalaki na elenge mobali moko ya Molevi, azalaki kovanda na Beteleemi ya Yuda, na ekolo Yuda.
8 This man left Bethlehem in Judah to find another place to live, and traveling on, he reached the hill country of Ephraim, to Micah's house. Alongwaki na engumba Beteleemi ya Yuda mpe akendeki koluka esika mosusu ya kovanda. Na mobembo na ye, akomaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ndako ya Mika.
9 Micah asked, "Where are you from?" He said, "A Levite from Bethlehem in Judah; I'm looking for somewhere to live." Mika atunaki ye : — Owuti wapi ? Azongisaki : — Nazali moto ya libota ya Levi, nawuti na Beteleemi ya Yuda mpe nazali koluka esika ya kovanda.
10 Micah said, "Stay with me; be my father and priest, and I'll give you ten pieces of silver a year, a set of clothes, and your food." So the Levite went in. Mika alobaki na ye : — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.
11 The Levite agreed to stay with the man, and the young man became to him like one of his sons. Boye, Molevi yango andimaki kovanda elongo na Mika. Mika akomisaki Molevi lokola moko kati na bana na ye.
12 Micah ordained the Levite, and the young man became his priest and lived in Micah's house. Mika abulisaki Molevi yango lokola nganga-nzambe na ye mpe akomaki kovanda elongo na ye.
13 Micah said, "Now I know our Father will be good to me, because I have a Levite as my priest." Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]