Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Samson went to Gaza, and there he saw a prostitute, and he was intimate with her. Mokolo moko, Samison akendeki na Gaza epai wapi amonaki mwasi moko ya ndumba, mpe asangisaki na ye nzoto.
2 When the people of Gaza heard, "Samson has come here," they surrounded the place, waiting for him all night at the city gate. They kept quiet all night, saying, "At dawn we'll kill him." Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki : « Tokoboma ye na tongo tango akobima. »
3 Samson lay there until midnight. At midnight he rose, grabbed the doors of the city gate and the two posts, pulled them up with the bar, set them on his shoulders, and carried them to the top of the hill facing Hebron. Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu ; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron.
4 After this he loved a woman in the Valley of Sorek, whose name was Delilah. Sima na yango, Samison alingaki mwasi moko oyo azalaki kovanda na lubwaku ya Soreki ; kombo na ye ezalaki « Dalila. »
5 The Philistine rulers came to her and said, "Lure him and learn where his great strength lies, and how we can overpower and bind him to subdue him. Each of us will give you 1,100 pieces of silver." Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »
6 Delilah said to Samson, "Tell me where your great strength lies, and how you could be tied up and subdued." Dalila ayebisaki Samison : — Yebisa ngai sekele ya makasi na yo mpe ndenge nini bakoki kokanga yo basinga mpe kosilisa yo makasi.
7 Samson told her, "If they tie me with seven fresh bowstrings, not yet dried, I'll grow weak and be like any other man." Samison azongiselaki ye : — Soki bakangi ngai na basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
8 Then the Philistine rulers brought her seven fresh bowstrings, not yet dried, and she tied him with them. Boye, bakambi ya Filisitia bamemelaki Dalila basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, mpe Dalila alingaki Samison basinga yango.
9 Now she had men lying in wait in the inner room. She said to him, "The Philistines are upon you, Samson!" But he snapped the bowstrings as a strand of flax snaps when it touches the fire. So the secret of his strength was not discovered. Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison akataki na pete penza basinga yango ndenge basinga ya lino ekatanaka soki ezwi moto. Boye, basosolaki te sekele ya makasi na ye.
10 Delilah said to Samson, "You've mocked me and told me lies. Now tell me how you can be tied up." Dalila alobaki na Samison : — Osakani na ngai mpe okosi ngai ! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo ?
11 He told her, "If they tie me tight with new ropes never used, I'll become weak, like any man." Samison alobaki : — Soki bakangi ngai na basinga ya sika oyo nanu basaleli te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
12 Delilah took new ropes and tied him with them, saying, "Samson, the Philistines are on you!" Men lay in wait in the inner room. But he tore the ropes off his arms like thread. Dalila azwaki basinga ya sika mpe akangaki na yango Samison. Bongo abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Atako bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki lisusu ya kobombama kati na ndako, Samison akataki kaka lokola singa moko pamba, basinga oyo bakangaki ye.
13 Delilah said to Samson, "You've mocked me and lied to me all this time. Tell me how you can be tied up." He said to her, "Weave the seven braids of my head into the loom's fabric and pin it tight, and I'll be as weak as any man." Boye Dalila alobaki na Samison : — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai ! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. Samison azongisaki : — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba
14 She fastened it with the pin and told him, "Samson, the Philistines are on you!" But he woke from his sleep and pulled out the pin, the loom, and the fabric. mpe akangisaki yango na likonzi. Dalila abelelaki lisusu Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe apikolaki likonzi elongo na singa oyo batongelaka bilamba.
15 She said, "How can you say 'I love you' when your heart isn't with me? Three times you've mocked me and not told me where your great strength lies." Dalila alobaki na ye : « Ndenge nini okoki koloba ete olingaka ngai tango motema na yo ezali elongo na ngai te ! Oyo ezali mbala na yo ya misato ya kosakana na ngai, pamba te oyebisi ngai te sekele ya makasi na yo. »
16 When she pressed him hard with her words day after day and kept urging him, he grew so tired of it that he wished he were dead. Lokola, mokolo na mokolo, Dalila azalaki kotungisa Samison na maloba na ye mpe kozangisa ye kimia, Samison amonaki ete motungisi yango eleki ye ndelo.
17 So he told her his whole heart: "No razor has touched my head, for I am a Nazirite of our Father from my mother's womb. If I am shaved, my strength leaves me, and I become weak, like any other man." Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki : « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. »
18 When Delilah saw he had told her all his heart, she sent for the Philistine rulers: "Come up once more, for he has told me all his heart." So they came up to her with the silver in their hands. Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki : « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. » Bakambi ya Filisitia bazongaki epai ya Dalila na mbongo ya bibende na maboko na bango.
19 She lulled him to sleep on her knees, called a man, and had him shave the seven braids of his head. She began to subdue him, and his strength left him. Dalila alalisaki Samison na mipende na ye, abengaki mobali moko mpo na kokata ye suki sambo ya moto na ye. Samison akomaki kolemba, mpe makasi na ye esilaki.
20 She said, "The Philistines are on you, Samson!" He woke from his sleep and thought, "I'll go out as before and shake myself free." But he did not know our Father had left him. Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.
21 The Philistines seized him, gouged out his eyes, and brought him to Gaza. They bound him with bronze shackles, and he ground grain in the prison. Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.
22 But the hair of his head began to grow again after it had been shaved. Kasi suki ya moto na ye ekomaki lisusu kokola wuta tango bakataki ye yango.
23 The Philistine rulers gathered to offer a great sacrifice to Dagon their god and to celebrate, saying, "Our god has handed Samson our enemy over to us." Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki : « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. »
24 When the people saw him, they praised their god, saying, "Our god has handed over our enemy, who ravaged our land and multiplied our slain." Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki : « Nzambe na biso akabi na maboko na biso, monguna na biso, oyo azalaki kobebisa mokili na biso mpe koboma bato ebele kati na biso. »
25 When their hearts were merry, they said, "Call Samson to entertain us." So they brought Samson from the prison, and he entertained them. They stood him between the pillars. Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,
26 Samson told the boy holding his hand, "Let me feel the pillars the house rests on, so I can lean on them." Samison alobaki na mosali oyo asimbaki loboko na ye : « Tia ngai na esika oyo nakoki kosimba makonzi oyo esimbi tempelo mpo ete nalalela yango. »
27 The house was full of men and women; all the Philistine rulers were there, and on the roof about 3,000 men and women watched Samson perform. Nzokande, tempelo ezalaki ya kotonda na mibali, basi mpe bakambi nyonso ya Filisitia. Na likolo ya ndako, ezalaki na bato pene nkoto misato, mibali mpe basi, oyo bazalaki kotala masano oyo Samison azalaki kosala.
28 Then Samson called to our Father: "O Sovereign Father, remember me, please. Strengthen me just this once, that with one blow I may bring justice on the Philistines for my two eyes." Samison abondelaki Yawe : « Nkolo Yawe, Yo oyo osalaka nyonso oyo olingi, kanisa ngai ! Nabondeli Yo, Nzambe : Pesa ngai makasi mbala oyo lisusu, mpe pesa ngai nzela ete, na mbala moko, nazongisa mabe na mabe epai ya bato oyo ya Filisitia mpo na miso na ngai mibale. »
29 Samson grasped the two central pillars supporting the house and braced against them, his right hand on one, his left on the other. Samison asimbaki makonzi nyonso mibale ya kati-kati, oyo esimbaki tempelo, mpe ayekamelaki yango, loboko ya mobali na likonzi moko, mpe loboko ya mwasi na likonzi mosusu.
30 Samson said, "Let me die with the Philistines." He pushed with all his strength, and the house fell on the rulers and all the people in it. So he killed more at his death than in his life. Bongo Samison alobaki : « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia ! » Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi.
31 His brothers and all his father's household came down, took him, brought him up, and buried him between Zorah and Eshtaol in his father Manoah's tomb. He had judged Israel twenty years. Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]