Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Israel's men had sworn at Mizpah: "None of us will give his daughter to Benjamin as a wife." Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. »
2 The people came to Bethel and sat there before our Father until evening, crying out and weeping bitterly. Bato bakendeki na Beteli, bavandaki wana liboso ya Nzambe kino na pokwa. Batombolaki mingongo na bango mpe balelaki makasi.
3 They said, "Why, our Father, God of Israel, has this happened in Israel—one tribe missing from Israel today?" Bazalaki koloba : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele ? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele ? »
4 The people rose early next day, built an altar there, and offered burnt and peace offerings. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato batongaki kuna etumbelo ; batumbaki na likolo na yango bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
5 Then Israel's people asked, "Which of all the tribes of Israel did not come up to the assembly, to our Father?" For they had sworn a solemn oath that whoever did not come up to our Father at Mizpah must surely be put to death. Bongo bana ya Isalaele batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe ? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye.
6 The Israelites grieved for their brother Benjamin. They said, "Today one tribe is cut off from Israel. Bana ya Isalaele bakomaki na mawa mpo na bandeko na bango, bato ya libota ya Benjame ; balobaki : « Mokolo ya lelo, libota moko elongwe na Isalaele.
7 How can we get wives for the survivors, since we swore by our Father not to give them our daughters?" Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. »
8 Then they asked, "Which of the tribes of Israel did not come up to our Father at Mizpah?" No one from Jabesh-gilead had come to the camp, to the assembly. Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani.
9 For when the people were counted, not one of the inhabitants of Jabesh-gilead was there. Pamba te tango batangaki bato, bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi azalaki wana.
10 The assembly sent 12,000 of their bravest fighters there, ordering: "Go strike the residents of Jabesh-gilead with the sword, including women and children. Lisanga etindelaki bango basoda nkoto zomi na mibale, bapesaki bango mitindo oyo : « Bokende koboma na mopanga bato nyonso ya Yabeshi ya Galadi elongo na basi mpe bana.
11 Do this: devote to destruction every male, and every woman who has had relations with a man." Tala makambo oyo bokosala : ‹ Bokobebisa mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo ayebi nzoto ya mibali. › »
12 Among Jabesh-gilead's residents they found 400 young virgins who had never slept with a man, and brought them to the camp at Shiloh, in the land of Canaan. Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.
13 Then the whole community sent word to the Benjaminites at the rock of Rimmon and declared peace to them. Lisanga mobimba etindaki sango ya kimia epai ya bato ya libota ya Benjame, oyo bazalaki na libanga monene ya Rimoni.
14 Benjamin returned at that time; they gave them the women kept alive from Jabesh-gilead—still not enough for them all. Boye, na tango wana, bato ya libota ya Benjame bazongaki, mpe lisanga mobimba epesaki bango na libala, basi ya Yabeshi ya Galadi oyo batikaki na bomoi. Kasi basi yango bazalaki ya kokoka te mpo na bango nyonso.
15 The people grieved for Benjamin, because our Father had made a breach in the tribes of Israel. Bato bayokaki mawa mpo na bato ya libota ya Benjame, pamba te Yawe alongolaki libota moko kati na mabota ya Isalaele.
16 The elders of the assembly said, "How do we get wives for the survivors, since Benjamin's women were wiped out?" Bakambi ya lisanga balobaki : « Tokosala ndenge nini mpo na kozwa basi ya kopesa na libala mpo na mibali oyo batikali, pamba te basi ya libota ya Benjame basili kokufa ? »
17 They said, "Benjamin's survivors need an inheritance, so a tribe isn't erased from Israel. Balobaki lisusu : « Bato ya libota ya Benjame oyo batikali basengeli kozala na bakitani na bango, mpo ete ekolo elimwa te kati na Isalaele.
18 We cannot give them our daughters as wives, for Israel had sworn, 'Cursed is anyone who gives a wife to Benjamin.'" Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo : ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › »
19 They said, "There's a yearly feast of our Father at Shiloh, north of Bethel, east of the road up from Bethel to Shechem, south of Lebonah." Bongo balobaki : « Tala, feti moko ya Yawe ezalaka mibu nyonso, kati na Silo oyo ezali na ngambo ya nor ya Beteli mpe na ngambo ya este ya nzela oyo ekenda longwa na Beteli kino na Sishemi, mpe na ngambo ya sude ya Lebona. »
20 And they instructed the Benjaminites, "Go and hide in the vineyards. Boye bapesaki mitindo oyo epai ya bato ya libota ya Benjame : « Bokende kobombama kati na bilanga ya vino
21 Watch—when Shiloh's young women come out to dance, rush from the vineyards, each seize a wife from Shiloh's young women, and go to Benjamin's land. mpe botala malamu. Tango bokomona bana basi ya Silo babimi mpo na kobina, bobimela bango wuta na bilanga ya vino, mpe moko na moko kati na bino akanga mwasi moko kati na bana ya Silo mpe azonga na ye na mokili ya Benjame.
22 When their fathers or brothers come to us to complain, we'll tell them, Show them favor for our sake, since we didn't capture a wife for each in battle, and you didn't give them wives yourselves—else you'd be guilty now." Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › »
23 So Benjamin's sons did this: they took wives, one for each, from the dancers they seized, went back to their inheritance, rebuilt the cities, and lived there. Bato ya libota ya Benjame basalaki bongo. Tango bana basi bazalaki kobina, mobali moko na moko akangaki mwana mwasi moko mpe amemaki ye mpo ete azala mwasi na ye. Bongo bazongaki na mabele na bango, batongaki bingumba mpe bavandaki kuna.
24 At that time the Israelites left there, each to his tribe and clan; each went out from there to his inheritance. Na tango wana, bana ya Isalaele balongwaki na esika wana mpe bazongaki na bandako na bango, na bituka na bango mpe na mabota ya botata na bango, moto na moto na mabele na ye.
25 In those days there was no king in Israel; everyone did what was right in his own eyes. Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala makambo oyo azalaki komona ete ezali malamu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]