Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the kings of the land the Israelites struck down, taking their land east of the Jordan—from the Arnon Gorge to Mount Hermon—and the whole eastern Arabah: Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :
2 Sihon, king of the Amorites, who lived in Heshbon and ruled from Aroer on the edge of the Arnon Gorge—from the middle of the gorge—and over half of Gilead, as far as the Jabbok River, the Ammonites' border; Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni.
3 and over the eastern Arabah, from the Sea of Chinnereth to the Sea of the Arabah (the Dead Sea), toward Beth-jeshimoth, and southward below Pisgah's slopes. Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
4 And the territory of Og king of Bashan, remnant of the Rephaim, who lived in Ashtaroth and Edrei. Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
5 He ruled Mount Hermon, Salecah, all Bashan to the border of the Geshurites and Maacathites, and half Gilead, to the border of Sihon king of Heshbon. Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
6 Moses, the servant of our Father, and the Israelites defeated them; Moses, the servant of our Father, gave their land as a possession to the Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh. Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
7 These are the kings of the land Joshua and the Israelites struck west of the Jordan, from Baal-gad in the Valley of Lebanon to Mount Halak, rising toward Seir. Joshua gave it to the tribes of Israel as their possession, division by division. Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango
8 Hill country, lowlands, Arabah, slopes, wilderness, and Negev—land of the Hittites, Amorites, Canaanites, Perizzites, Hivites, and Jebusites: kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. Tala bakonzi yango :
9 The king of Jericho, one; the king of Ai, near Bethel, one; mokonzi ya Jeriko moko mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli moko
10 the king of Jerusalem, one; the king of Hebron, one; mokonzi ya Yelusalemi moko mokonzi ya Ebron moko
11 the king of Jarmuth, one; the king of Lachish, one; mokonzi ya Yarimuti moko mokonzi ya Lakishi moko
12 the king of Eglon, one; the king of Gezer, one; mokonzi ya Egiloni moko mokonzi ya Gezeri moko
13 the king of Debir, one; the king of Geder, one; mokonzi ya Debiri moko mokonzi ya Gederi moko
14 the king of Hormah, one; the king of Arad, one; mokonzi ya Orima moko mokonzi ya Aradi moko
15 the king of Libnah, one; the king of Adullam, one; mokonzi ya Libina moko mokonzi ya Adulami moko
16 the king of Makkedah, one; the king of Bethel, one; mokonzi ya Makeda moko mokonzi ya Beteli moko
17 the king of Tappuah, one; the king of Hepher, one; mokonzi ya Tapua moko mokonzi ya Eferi moko
18 the king of Aphek, one; the king of Lasharon, one; mokonzi ya Afeki moko mokonzi ya Lasharoni moko
19 the king of Madon, one; the king of Hazor, one; mokonzi ya Madoni moko mokonzi ya Atsori moko
20 the king of Shimron-meron, one; the king of Achshaph, one; mokonzi ya Shimironi-Meroni moko mokonzi ya Akishafi moko
21 the king of Taanach, one; the king of Megiddo, one; mokonzi ya Taanaki moko mokonzi ya Megido moko
22 the king of Kedesh, one; the king of Jokneam in Carmel, one; mokonzi ya Kedeshi moko mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli moko
23 the king of Dor in Naphath-dor, one; the king of Goiim in Gilgal, one; mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko
24 the king of Tirzah, one—thirty-one kings in all. mokonzi ya Tiritsa moko. Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]