Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Joshua was old, far along in years, and our Father said to him, "You are old, far along in years, and very much land still remains to be taken. Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.
2 This is the land that remains: all the Philistine regions, and all the Geshurite territory, Tala mokili oyo etikali : Bituka nyonso ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Geshuri :
3 from the Shihor east of Egypt north to Ekron's border (counted as Canaanite); the five Philistine rulers—of Gaza, Ashdod, Ashkelon, Gath, and Ekron—and the Avvites, etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana ; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia : mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni ; etuka ya bato ya Avi ;
4 in the south, all the Canaanite land, and Mearah of the Sidonians, as far as Aphek, to the Amorite border; mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ;
5 and the land of the Gebalites, all Lebanon eastward, from Baal-gad below Mount Hermon to Lebo-hamath. etuka ya bato ya Gebali ; mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati.
6 All who live in the hill country from Lebanon to Misrephoth-maim, all the Sidonians—I myself will drive them out before the people of Israel. Only allot the land to Israel as an inheritance, as I commanded you. Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ;
7 So divide this land as an inheritance among the nine tribes and the half-tribe of Manasseh." mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. »
8 With the other half-tribe, the Reubenites and Gadites had received their inheritance, which Moses gave them beyond the Jordan to the east, just as Moses the servant of our Father gave them: Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani.
9 from Aroer on the edge of the Arnon Valley, the city in the valley's middle, and all the plateau from Medeba to Dibon; Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni,
10 and all the cities of Sihon king of the Amorites, who ruled in Heshbon, up to the Ammonite border; mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni.
11 and Gilead, the territory of the Geshurites and Maacathites, all Mount Hermon, and all Bashan up to Salecah; Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika.
12 all Og's kingdom in Bashan, who reigned in Ashtaroth and Edrei—the last survivor of the Rephaim. Moses defeated Og and drove out his people. Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.
13 But the Israelites did not drive out the Geshurites or Maacathites, so Geshur and Maacath live among Israel to this day. Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
14 Only to the tribe of Levi he gave no inheritance; the fire offerings to our Father, the God of Israel, are their inheritance, as he promised them. Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.
15 Moses gave an inheritance to the tribe of the children of Reuben according to their clans. Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango :
16 Their territory ran from Aroer on the edge of the Arnon Valley, with the city in the valley's middle, and all the plateau by Medeba; Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba,
17 Heshbon and all its cities on the plain—Dibon, and Bamoth-baal, and Beth-baal-meon, kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,
18 and Jahaz, and Kedemoth, and Mephaath, Yakatsi, Kedemoti, Mefati,
19 and Kiriathaim, and Sibmah, and Zereth-shahar on the hill above the valley, Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku,
20 and Beth-peor, and the slopes of Pisgah, and Beth-jeshimoth, Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti :
21 and all the cities of the plain, and all the kingdom of Sihon king of the Amorites, who reigned in Heshbon, whom Moses defeated with the leaders of Midian—Evi, Rekem, Zur, Hur, and Reba—Sihon's princes living in the land. bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye.
22 Israel's people also killed Balaam son of Beor, the fortune-teller, with the sword, among their slain. Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi.
23 The Reubenites' border was the Jordan and its bank. This was the Reubenites' inheritance by clans—the cities and their villages. Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango.
24 Moses gave the tribe of Gad, the children of Gad, an inheritance by their clans. Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango :
25 Their territory: Jazer, all the cities of Gilead, half the Ammonites' land as far as Aroer, east of Rabbah, Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ;
26 and from Heshbon to Ramath-mizpeh and Betonim, and from Mahanaim to the border of Debir, mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri ;
27 and in the valley: Beth-haram, Beth-nimrah, Succoth, and Zaphon—the rest of the kingdom of Sihon king of Heshbon, the Jordan and its bank, to the edge of the Sea of Chinnereth beyond the Jordan eastward. mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani.
28 This is the inheritance of Gad's descendants by clan: the cities and their villages. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Gadi, kolanda bituka na bango.
29 Moses gave the half-tribe of Manasseh an inheritance, for the half-tribe of Manasseh's descendants by their clans. Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango :
30 Their territory ran from Mahanaim: all Bashan, all the kingdom of Og king of Bashan, and all Jair's towns in Bashan, sixty cities; Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba,
31 and half of Gilead, with Ashtaroth and Edrei, Og's royal cities in Bashan, to the descendants of Machir son of Manasseh—half the Machirites by their clans. ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.
32 These are the inheritances Moses distributed in the plains of Moab, beyond the Jordan east of Jericho. Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko.
33 Moses gave the tribe of Levi no inheritance; our Father, the God of Israel, is their inheritance, as he promised them. Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]