Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 43 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Jeremiah finished telling all the people all the words of their Father—all the words their Father sent him to speak to them. Tango Jeremi asilisaki koloba na bato maloba nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, maloba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye koyebisa bango,
2 Azariah son of Hoshaiah, Johanan son of Kareah, and all the arrogant men said to Jeremiah, "You are lying! Our Father did not send you to say, 'Do not go settle in Egypt.' Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.
3 No, Baruch son of Neriah is inciting you against us, to hand us to the Babylonians to kill us or exile us to Babylon." Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni.
4 So Johanan son of Kareah, all the force commanders, and all the people disobeyed our Father's voice to stay in the land of Judah. Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, bakonzi nyonso ya basoda mpe bato nyonso baboyaki kotosa Yawe oyo azali kosenga bango kovanda kati na mokili ya Yuda.
5 So Johanan son of Kareah and all the force commanders took the whole remnant of Judah who had returned from all the nations where they were scattered, to live in Judah's land. Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda bakamataki batikali nyonso ya Yuda, oyo bazongaki wuta na bikolo nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana, mpo na kovanda na mokili ya Yuda ;
6 The men, women, children, the king's daughters, and everyone Nebuzaradan the captain of the guard had left with Gedaliah son of Ahikam, son of Shaphan, along with Jeremiah the prophet and Baruch son of Neriah. bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.
7 So they entered Egypt, disobeying our Father's voice, and came as far as Tahpanhes. Boye, mpo ete batosaki Yawe te, bakendeki na Ejipito mpe bakomaki kino na Dafine.
8 Then the word of our Father came to Jeremiah in Tahpanhes: Wuta na Dafine, Yawe alobaki na Jeremi :
9 "Take large stones in your hand and bury them in the clay, in the brick pavement at the entrance to Pharaoh's palace in Tahpanhes, as the men of Judah watch. — Kamata mabanga minene mpe, na miso ya Bayuda, kunda yango na se ya mabele oyo basalelaka bikeko, mabele ya pavema oyo batonga na babiliki, na ekotelo ya ndako ya Faraon, na Dafine.
10 Then tell them: 'This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: I am sending for my servant Nebuchadnezzar king of Babylon, and I will set his throne over these stones I buried here, and he will spread his royal canopy over them. Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo ; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango.
11 He will come and strike Egypt: death for those meant to die, captivity for those meant for captivity, the sword for those meant for the sword. Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga.
12 I will set fire to the temples of Egypt's gods; Nebuchadnezzar will burn them and carry them off. He will wrap the land of Egypt around himself like a shepherd wrapping his cloak, and leave there unharmed. Akotia moto kati na batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito, akotumba batempelo yango mpe akomema banzambe na bango ya bikeko na bowumbu. Akolongola bato ya Ejipito ndenge mobateli bibwele alongolaka basili na kazaka na ye, mpe akobima na kimia.
13 He will shatter the sacred pillars of Heliopolis in the land of Egypt and burn the temples of Egypt's gods.'" Kuna, kati na tempelo ya Eliopolisi, akobuka makonzi ya bule mpe akobebisa na moto batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]