Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 44 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word to Jeremiah about all the Jews living in Egypt, at Migdol, Tahpanhes, Memphis, and Pathros: Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :
2 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: You saw all the disaster I brought on Jerusalem and every city of Judah. Today they're ruins, with no one living there, « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi
3 because of the evil they did to provoke me—burning offerings, serving other gods neither they, you, nor your ancestors knew. likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.
4 Yet I sent you all my servants the prophets, again and again, saying, 'Don't do this detestable thing I hate! Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›
5 But they did not listen or turn from their evil, from burning incense to other gods. Kasi batikalaki koyoka te mpe batosaki te ; batikaki mabe na bango te mpe bakobaki kaka kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.
6 So my wrath and anger poured out, blazing through Judah's cities and Jerusalem's streets; they became the wasteland and ruin they remain today. Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi ; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo.
7 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Why do you harm yourselves so greatly, cutting off man, woman, child, and infant from Judah, leaving yourselves no remnant? Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ?
8 "You provoke me with your handiwork, burning offerings to other gods in Egypt, where you came to live—cutting yourselves off, becoming a curse and disgrace among all nations on earth. Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.
9 Have you forgotten the evils of your ancestors, Judah's kings, their wives, your own, and your wives'—done in Judah's land and Jerusalem's streets? Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki ? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?
10 To this day they haven't humbled themselves, feared, or followed my law and statutes set before you and your ancestors." Kino lelo, bamikitisi te, batosi Ngai te, batosi mibeko mpe malako na Ngai te, oyo napesaki bino mpe batata na bino.
11 So says the Father of heaven's armies, our Father of Israel: I set my face against you for harm, to cut off all Judah. Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda.
12 "I will take Judah's remnant set on going to live in Egypt: they will all perish, falling there by sword and famine, least to greatest, dying by sword and famine, becoming a curse, a horror, a disgrace, and a mockery. Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.
13 I will punish those living in Egypt as I punished Jerusalem—by sword, famine, and plague. Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu.
14 None of Judah's remnant who came to live in Egypt will escape or survive to return to Judah, where they long to live again—none but a few escapees will return." Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. »
15 Then all the men who knew their wives made offerings to other gods, all the women standing there—a large crowd—and all the people living in Egypt, in Pathros, answered Jeremiah: Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi :
16 "The word you spoke to us in our Father's name—we won't listen to you. — Te ! Tokoyoka te makambo oyo ozali koyebisa biso na kombo ya Yawe.
17 No—we will surely do all we vowed: make offerings to the queen of heaven, pour her drink offerings, as we did—we, our ancestors, our kings, our officials—in Judah's cities and Jerusalem's streets. Then we had plenty of food, thrived, and saw no disaster. Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.
18 But since we stopped burning incense and pouring drink offerings to the queen of heaven, we've lacked everything and been consumed by sword and famine." Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
19 The women added, "When we made offerings to the queen of heaven, pouring drink offerings to her, did we make cakes shaped like her and pour drink offerings without our husbands' knowledge?" Basi babakisaki : — Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye ?
20 Then Jeremiah said to all the people, men and women, who had answered him this way. Bongo Jeremi alobaki na bato nyonso, mibali mpe basi, oyo bapesaki ye eyano wana :
21 "The offerings you burned in Judah's cities and Jerusalem's streets—you, your fathers, your kings, your officials, the people of the land—didn't our Father remember them? Didn't it come to mind? — Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ?
22 So our Father could no longer bear your evil deeds and detestable things; your land became a ruin, a horror, a curse, uninhabited, as today. Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
23 Because you burned offerings, sinned against our Father, and did not obey his voice or walk in his law, his statutes, and his testimonies, this disaster struck you, as it is today." Mpo ete botumbaki malasi ya ansa lokola mbeka mpe bosalaki masumu liboso ya Yawe, mpo ete botosaki Yawe te mpe bolandaki te Mobeko na Ye, bikateli na Ye mpe malako na Ye, yango wana pasi oyo ekomeli bino ndenge bozali komona yango lelo.
24 Jeremiah said to all the people and all the women, "Hear our Father's word, all Judah in the land of Egypt. Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso : — Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe :
25 This is what the Father of heaven's armies, the God of Israel, says: You and your wives spoke it with your mouths and did it with your hands: 'We will keep the vows we made—burn incense to heaven's queen and pour her drink offerings.' Keep your vows, then! Carry them out!" Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki : « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende ! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino !
26 "Hear our Father's word, all Judah living in Egypt's land: Look, I have sworn by my great name, says he, that no man of Judah in all Egypt's land will again call on my name, saying, 'As the Sovereign Father lives. Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! ›
27 Look, I'm watching over them for harm, not good. All Judah's men in Egypt will die by sword and famine till none remain. Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.
28 Few sword-survivors will return from Egypt to Judah; then all Judah's remnant who went to Egypt to live there will know whose word stands—mine or theirs." Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama : ya Ngai to ya bango.
29 This is the sign to you, declares our Father: I will punish you in this place, so you'll know my words against you will surely come true—for harm. Ekozala elembo ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, » elobi Yawe, « mpo ete boyeba solo ete pasi oyo nalakaki bino ekokokisama kaka. »
30 This is what our Father says: I hand Pharaoh Hophra king of Egypt to his enemies who want him dead, as I handed Zedekiah king of Judah to Nebuchadnezzar king of Babylon, his enemy who wanted him dead.' Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]