Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

James 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 James, a servant of our Father and the Lord Jesus Christ, to the twelve tribes scattered among the nations: greetings. Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.
2 Consider it pure joy, my brothers and sisters, whenever you face trials of many kinds, Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.
3 because you know that the testing of your faith produces perseverance. Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema.
4 Let perseverance finish its work so that you may be mature and complete, lacking nothing. Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.
5 If any of you lacks wisdom, ask our Father, who gives freely to all without criticizing, and it will be given you. Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
6 Ask in faith, without doubting, for the doubter is like a sea wave, driven and tossed by the wind. Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.
7 That person should not expect to receive anything from our Father. Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo :
8 Such a person is double-minded and unstable in all their ways. azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.
9 Let the believer in humble circumstances take pride in their high position, Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye,
10 but let the rich boast in their low state, since they'll pass like a wildflower. mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.
11 The sun rises with scorching heat and withers the grass. Its flower falls; its beauty vanishes. So the rich fade away amid their pursuits. Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.
12 Blessed is the one who endures trial, because once tested they'll receive the crown of life our Father promised to those who love him. Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
13 When tempted, no one should say, "Our Father is tempting me." Evil can't tempt our Father, and he tempts no one. Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba : « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe.
14 But each person is tempted, dragged away and lured by their own evil desire. Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko.
15 Then desire conceives and gives birth to sin; sin, full-grown, gives birth to death. Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu ; mpe lisumu ememaka na kufa.
16 Don't be deceived, my dear brothers and sisters. Bandeko balingami, bomikosa te :
17 Every good and perfect gift is from above, coming down from the Father of lights, who never changes or casts a shifting shadow. bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
18 By his choice, he gave us birth through the word of truth, so we'd be a kind of firstfruits of his creation. Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.
19 Know this, my dear brothers and sisters: everyone should be quick to listen, slow to speak, slow to anger, Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;
20 because human anger does not produce the righteousness of our Father. pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe.
21 So strip off all moral filth and excess evil; humbly receive the word planted in you, able to save your souls. Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
22 Do not merely listen to the word, and so deceive yourselves. Do what it says. Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.
23 Anyone who hears the word but doesn't act on it is like one who looks at his natural face in a mirror, Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala
24 and, after looking at himself, goes away and immediately forgets what he looks like. mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali.
25 But whoever peers into the perfect law of freedom, continuing in it—not a forgetful hearer but a doer who acts—will be blessed in his doing. Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala : moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala.
26 If anyone thinks himself religious but doesn't control his tongue, he deceives his own heart—his religion is worthless. Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.
27 Pure and spotless religion before our Father is this: caring for orphans and widows in their distress, and keeping oneself unstained from the world. Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]