Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hebrews 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The law is only a shadow of the good things to come, not the true form of those realities, and so, by the same sacrifices offered year after year without end, can never perfect those who draw near. Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te ; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu.
2 Otherwise, wouldn't they have stopped being offered, since worshipers, cleansed once, would no longer be conscious of sins? Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.
3 But in these sacrifices there is a yearly reminder of sins. Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango,
4 For it is impossible for the blood of bulls and goats to take away sins. pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu.
5 Therefore, when Christ came into the world, he said: "Sacrifice and offering you did not desire, but a body you prepared for me; Yango wana, tango Klisto ayaki na mokili, alobaki : « Ozalaki na posa te ya bambeka to ya makabo, kasi osalaki ngai nzoto.
6 "in burnt offerings and sin offerings you took no pleasure. Osepelaki te na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu.
7 Then I said, 'Look, I have come—in the scroll of the book it is written of me—to do your will, my Father.'" Bongo nalobaki : ‹ Tala ngai oyo, nayei, nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo, kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »
8 Above he said, "Sacrifices, offerings, burnt offerings, and sin offerings you did not desire or delight in"—though the law requires them, Alobaki liboso : « Ozalaki na posa te mpe osepelaki te na bambeka, na makabo, na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu. » Nzokande ezalaki kopesama kolanda Mibeko.
9 then he said, "Look, I have come to do your will." He removes the first to establish the second. Alobaki lisusu : « Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo. » Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale.
10 By this will, we have been made holy through the offering of Jesus Christ's body, once for all. Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.
11 Every priest stands daily, serving and repeatedly offering the same sacrifices that can never remove sins. Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato.
12 But he offered one sacrifice for sins forever, then sat down at the right hand of our Father, Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
13 waiting from that time until his enemies are made a footstool for his feet. Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye.
14 For by one offering he has perfected for all time those who are being made holy. Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.
15 And the Holy Spirit also testifies to us; for after saying, Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso :
16 "This is the covenant that I will make with them after those days, says our Father: I will put my laws on their hearts, and write them on their minds." « Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo : Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. »
17 He then adds, "And their sins and their lawless deeds I will remember no more." Bongo na sima, abakisaki : « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. »
18 Now where these are forgiven, there is no longer any offering for sin. Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.
19 So, brothers and sisters, since we have confidence to enter the holy places by Jesus' blood, Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye.
20 a new, living way he opened for us through the curtain—his flesh, Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko.
21 and since we have a great priest over the house of our Father, Boye, tozali na Mokonzi Monene ya Banganga-Nzambe, oyo azali Mokonzi ya Ndako ya Nzambe.
22 let us draw near with a genuine heart, fully assured by faith, hearts sprinkled clean from a guilty conscience, and bodies washed with pure water. Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
23 Let us hold tightly to the hope we declare, unshaken, for he who promised is faithful. Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te.
24 And let us consider how to spur one another on to love and good works, Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.
25 not giving up meeting together, as some habitually do, but encouraging each other—even more as you see the Day approaching. Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.
26 For if we go on sinning deliberately after receiving the knowledge of the truth, no sacrifice for sins remains, Pamba te, soki tokobi kosala masumu na nko sima na koyeba bosolo, mbeka mosusu mpo na bolimbisi ya masumu ekozala lisusu te ;
27 but only a terrible expectation of judgment and a raging fire that will consume the adversaries. ekotikala kaka kozela na somo penza kosambisama mpe moto makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe.
28 Anyone who rejects Moses' law dies without mercy on two or three witnesses' testimony. Soki babomaka na mawa te moto oyo abuki Mobeko ya Moyize, na litatoli ya bato mibale to misato,
29 How much worse punishment, do you think, does the one deserve who trampled the Son of our Father underfoot, treated as unholy the blood of the covenant that made him holy, and insulted the Spirit of grace? ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?
30 For we know the one who said, "Justice is mine; I will repay," and again, "Our Father will judge his people." Toyebi malamu Ye oyo alobaki : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto ; » mpe : « Nkolo akosambisa bato na Ye. »
31 It is a terrible thing to fall into the hands of the living Father. Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi !
32 Remember the earlier days, when after being enlightened you endured a hard struggle with suffering, Bokanisa lisusu mikolo ya liboso, na tango Nzambe afungolaki bino miso mpo ete bokoma komona pole, boyikaki mpiko kati na bapasi ya makasi.
33 at times publicly shamed by insults and suffering, at times standing with those treated that way. Ezalaki na batango oyo bazalaki kofinga bino, konyokola bino na miso ya bato ; ezalaki mpe na batango oyo bozalaki kokabola pasi elongo na bato oyo bazalaki konyokwama.
34 For you suffered with prisoners and joyfully accepted your possessions being seized, knowing you yourselves had a better, lasting possession. Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.
35 So do not throw away your confidence; it holds a great reward. Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango.
36 You need endurance, so that having done our Father's will, you may receive the promise. Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki.
37 For yet "in a very little while, the coming one will come and will not delay; Etikali moke, moke penza, ete Ye oyo asengeli koya aya, mpe akoya kala te.
38 but my righteous one will live by faith, and if he shrinks back, my soul takes no pleasure in him." Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.
39 But we don't belong to those who shrink back into destruction, but to those who have faith and preserve their souls. Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]