Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Habakkuk 2 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Moyengebene akobika na nzela ya kondima na ye

1Nakotelema na esika na ngai ya kokengela,nakotelema ngai moko na likolo ya mir,nakosenzela mpo na komona makambooyo akoyebisa ngaimpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.

2Yawe ayanolaki :— Koma emoniseli oyo,koma yango na etando ya mabanga,koma yango penza malamumpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.

3Emoniseli oyo ezali kaka kozelatango na yango oyo ekatama ;ezali kolobela makambo oyo ekosalemana tango ya suka ;solo, ekokosa te.Ata ewumeli, zela yango kaka ;solo, ekokokisama, ekowumela te.

4Tala, atondisami na lolendo,motema na ye ezali na bosembo te ;kasi moto ya sembo akobikana nzela ya kondima na ye.

5Solo, masanga ya vino ekosaka ;moto ya lolendo avandaka kimia te.Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufimpe atondaka te lokola kufa,asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na yempe akomisaka bango bawumbu na ye.

6Boni, bato wana nyonso bakoseka ye tena maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola :« Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibimpe akolisaka bomengo na yena kobotola bato biloko na makasi ! »Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini ?

7Boni, bakolo biloko bakobimela yo te na pwasa ?Bakolamukela yo mpe bakolengisa yo.Boni, okokoma te lokola mosuni na bango ya kolia ?

8Lokola obotolaki bomengoya bato ya bikolo ebele na makasi,bato oyo batikali bakobotolayo mpe bomengo na yo na makasi,mpo ete osopaki makila ya bato,obebisaki mikili mpe bingumbaelongo na bavandi na yango nyonso.

9Mawa na moto oyo atongaka ndako na yena nzela ya sembo te !Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangombampo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.

10Lokola osalaki mabongisi ya kobebisa bato ebele,obongisaki nde soni ya ndako na yo mokompe okotisi nde bomoi na yo moko na likama.

11Mabanga ya mir ekogangampe mabaya ya motondo ekoyanola.

12Mawa na moto oyo atongakaengumba na nzela ya makilampe alendisaka yango na nzela ya lokuta !

13Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,ete misala ya bato ezala kaka lokola konioyo ezali kopela moto,ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba ?

14Pamba te mokili ekotondana boyebi ya nkembo na Yawendenge mayi etondaka na ebale.

15Mawa na moto oyo amelisakamoninga na ye masanga makasikino asilisa mbeki nyonso mpe alangwampo ete amona bolumbu na ye !

16Na esika ete otondisama na nkembo,okotondisama na soni.Sik’oyo ekomi tango na yo,mela mpe tikala bolumbu !Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yaweeyei kozingela yo,mpe soni ekozipa nkembo na yo.

17Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo,mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo ;pamba te osopaki makila ya bato,obebisaki mikili mpe bingumbaelongo na bavandi na yango nyonso.

18Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini,pamba te moto nde asalaki yango ?Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokutaezali na tina penza nini ?Pamba te moto oyo asalaki yangoazali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye,asali nde ekeko oyo elobaka te.

19Mawa na moto oyo alobakana eteni ya nzete : « Telema ! »Mawa na moto oyo alobakana libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! »Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ?Bazipa yango wolo mpe palata,kasi pema ezali te kati na yango.

20Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ;tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]