Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father blessed Noah and his sons, saying, "Be fruitful and multiply and fill the earth. Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.
2 Every animal of the earth, every bird of the sky, everything that crawls on the ground, and every fish of the sea will fear and dread you; they are given into your hand. Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino.
3 Every living, moving thing will be your food. As I gave you the green plants, I now give you everything. Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso.
4 But you must not eat meat that still has its lifeblood in it. Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi.
5 I will surely demand an accounting for your blood: from every animal I will demand it, and from every person—each for his brother's life—I will demand a human life. Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.
6 Whoever sheds human blood, by humans will their blood be shed; for in the image of God, humanity was made. Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.
7 As for you, be fruitful and multiply; swarm across the earth and multiply on it." Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »
8 Then our Father said to Noah and to his sons with him: Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali :
9 "As for me, I am now establishing my covenant with you and with your descendants after you, « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo,
10 and every living creature with you—birds, livestock, every wild animal of the earth—all that came out of the ark with you, every living thing of the earth. na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili.
11 I set my covenant with you: never again will all flesh be cut off by floodwaters; never again a flood to destroy the earth." Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
12 Then our Father said, "This is the sign of the covenant I'm making between me and you and every living creature with you, for all generations to come: Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya :
13 I have put my rainbow in the clouds as the sign of the covenant between me and the earth. natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili.
14 Whenever I bring clouds over the earth and the rainbow appears in the clouds, Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata,
15 I will remember my covenant between me and you and every living creature of every kind: never again will floodwaters destroy all life. nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi.
16 When the rainbow is in the clouds, I will see it and remember the everlasting covenant between me and every living creature of every kind on earth." Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
17 So our Father told Noah, "This is the sign of the covenant I've established between me and all life on earth." Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. »
18 Noah's sons who left the ark: Shem, Ham, and Japheth. (Ham was Canaan's father.). Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana.
19 These three were the sons of Noah, and from them the whole earth was populated. Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato.
20 Noah, a man of the soil, was the first to plant a vineyard. Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino.
21 When he drank some of its wine, he became drunk and lay uncovered inside his tent. Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo.
22 Ham, the father of Canaan, saw his father naked and told his two brothers outside. Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda.
23 Shem and Japheth took a cloak, laid it on both their shoulders, walked in backward, and covered their father's nakedness; their faces were backward, so they did not see their father's nakedness. Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
24 When Noah awoke from his wine and learned what his youngest son had done to him, Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki.
25 he said, "Cursed be Canaan! He will be the lowest of servants to his brothers." Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! »
26 He also said, "Blessed be the Father of Shem; may Canaan be Shem's servant. Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi !
27 May our Father extend Japheth's territory; may Japheth dwell in the tents of Shem, and may Canaan be Shem's servant." Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! »
28 After the flood Noah lived 350 years. Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano.
29 Noah lived a total of 950 years, and then he died. Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]