Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 But our Father remembered Noah, all the living creatures, and all the livestock with him in the ark, and swept a wind over the earth so the waters began to recede. Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.
2 The springs of the deep and heaven's floodgates closed, and rain from the sky stopped. Bitima ya se mpe maninisa ya likolo ekangamaki mpe mvula etikaki konoka.
3 Water kept receding from the earth, and after 150 days it had gone down. Mayi ekomaki kolongwa moke-moke likolo ya mabele, mpe sima na mikolo nkama moko na tuku mitano, mayi ekitaki.
4 The ark rested on the mountains of Ararat on the seventeenth day of the seventh month. Na mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya sambo, masuwa esemaki likolo ya bangomba Ararati.
5 The waters kept receding until the tenth month; on its first day, the mountaintops appeared. Mayi ezalaki kokoba kokita kino na sanza ya zomi. Na mokolo ya liboso ya sanza yango, basonge ya bangomba emonanaki.
6 After forty days, Noah opened the window he had made in the ark, Sima na mikolo tuku minei, Noa afungolaki lininisa ya masuwa oyo asalaki
7 he sent out a raven, and it flew back and forth until the waters dried up from the earth. mpe abimisaki yanganga. Yanganga yango ezalaki kokende mpe kozonga kino tango mayi ekawukaki na mokili.
8 Then he released the dove from him to see if the waters had subsided from the ground's surface. Mpe lisusu, Noa abimisaki ebenga mpo na kotala soki mayi ekawuki na mokili.
9 But the dove found no resting place for her foot and returned to him in the ark, since water still covered the whole earth's surface. So he reached out his hand, took her, and brought her back into the ark. Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa.
10 He waited seven more days and again sent out the dove from the ark. Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa.
11 The dove returned to him that evening with a freshly plucked olive leaf in her beak, so Noah knew the waters had receded from the earth. Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili.
12 He waited seven more days, then sent the dove out again; it did not return to him again. Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te.
13 In Noah's 600 and first year, the first day of the first month, the waters had dried up from the earth. Noah removed the ark's covering, looked out, and saw the ground's surface was dry. Na mokolo ya liboso na sanza ya liboso, tango Noa akokisaki mibu nkama motoba na moko ya mbotama, mayi ekawukaki na mokili ; Noa afungolaki masuwa na likolo na yango mpe amonaki ete mabele ekawuki.
14 By the twenty-seventh day of the second month the earth was completely dry. Na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya mibale, mabele ekawukaki penza.
15 Then our Father said to Noah, Boye, Nzambe alobaki na Noa :
16 "Leave the ark: you and your wife and your sons and your sons' wives with you. « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango.
17 Bring out with you every living creature—all flesh: birds, animals, everything that crawls on the ground—so they may swarm across the earth, be fruitful, and multiply on the earth." Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
18 So Noah came out, together with his sons and his wife and his sons' wives. Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye.
19 Every animal, every crawling thing, every bird—everything that moves on the earth—left the ark by their kinds. Banyama nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na mokili, ebimaki na masuwa na molongo kolanda lolenge na yango.
20 Noah built an altar to our Father, took some of every clean animal and every clean bird, and offered burnt offerings on it. Noa atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe azwaki ndambo ya banyama mpe bandeke ezanga mbindo, abonzelaki yango Yawe lokola mbeka ya kotumba.
21 Our Father smelled the pleasing aroma and said in his heart, "I will never again curse the ground because of humanity, though the human heart's inclination is evil from youth, nor will I ever again strike down every living thing as I have done. Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.
22 As long as the earth endures, seedtime and harvest, cold and heat, summer and winter, day and night will never cease." Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]