Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the account of Noah's sons—Shem, Ham, and Japheth. Sons were born to them after the flood. Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
2 The sons of Japheth: Gomer, Magog, Madai, Javan, Tubal, Meshech, and Tiras. Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
3 The sons of Gomer: Ashkenaz, Riphath, and Togarmah. Bana mibali ya Gomeri : Ashikenazi, Rifati mpe Togarima.
4 The sons of Javan: Elishah, Tarshish, Kittim, and Rodanim. Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
5 From these the coastland peoples divided into their lands, each by language, clan, and nation. Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
6 The sons of Ham: Cush, Mizraim, Put, and Canaan. Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
7 The sons of Cush: Seba, Havilah, Sabtah, Raamah, and Sabteca. The sons of Raamah: Sheba and Dedan. Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani.
8 Cush fathered Nimrod, who was the first mighty man on the earth. Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
9 He was a mighty hunter before God, so they say, "Like Nimrod, a mighty hunter before God." Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »
10 The beginning of his kingdom was Babel, Erech, Accad, and Calneh, in the land of Shinar. Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.
11 From that land he went out to Assyria and built Nineveh, Rehoboth-Ir, Calah, Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
12 and Resen, between Nineveh and Calah; this is the great city. mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.
13 Mizraim fathered the Ludim, the Anamim, the Lehabim, the Naphtuhim, Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
14 the Pathrusim, the Casluhim (from whom the Philistines came), and the Caphtorim. ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
15 Canaan fathered Sidon his firstborn, and Heth, Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,
16 and the Jebusites, the Amorites, the Girgashites, ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
17 the Hivites, the Arkites, the Sinites, ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
18 the Arvadites, the Zemarites, and the Hamathites. Afterward the clans of the Canaanites spread out. ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai.
19 Canaan's border ran from Sidon toward Gerar to Gaza, and toward Sodom, Gomorrah, Admah, and Zeboiim, to Lasha. Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
20 These are Ham's sons, by their clans, languages, lands, and nations. Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
21 Children were also born to Shem, older brother of Japheth, father of all Eber's descendants. Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
22 The sons of Shem: Elam, Asshur, Arphaxad, Lud, and Aram. Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
23 The sons of Aram: Uz, Hul, Gether, and Mash. Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.
24 Arphaxad fathered Shelah, and Shelah fathered Eber. Aripakishadi abotaki Shela ; Shela abotaki Eberi.
25 Eber had two sons: one named Peleg, for the earth was divided in his days, and his brother named Joktan. Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »
26 Joktan fathered Almodad, Sheleph, Hazarmaveth, Jerah, Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,
27 Hadoram, Uzal, Diklah, Adorami, Uzali, Dikila,
28 Obal, Abimael, Sheba, Obali, Abimaeli, Saba,
29 Ophir, Havilah, and Jobab; all these were the sons of Joktan. Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
30 Their territory extended from Mesha toward Sephar, to the hill country of the east. (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
31 These are Shem's sons, by their clans, languages, lands, and nations. Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
32 These are the clans of Noah's sons, by their lines of descent, in their nations; from these the nations spread across the earth after the flood. Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]