Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now the whole earth had one language and a common speech. Na tango wana, bato ya mokili mobimba bazalaki koloba monoko moko mpe bazalaki na elobeli moko.
2 And as they migrated eastward, they found a plain in the land of Shinar and settled there. Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.
3 They said to each other, "Come, let's make bricks and fire them hard." They used brick for stone, tar for mortar. Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela.
4 Then they said, "Come, let's build us a city and tower with its top in the sky, and make us a name, so we don't scatter over the face of the whole earth." Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
5 But our Father came down to see the city and the tower that the people were building. Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga.
6 And our Father said, "Look, they are one people with one language, and this is only the start of what they will do. Now nothing they plan to do will be impossible for them. Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala !
7 Come, let's go down there and scramble their language, so no one understands a neighbor's language." Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »
8 So our Father scattered them from there across all the earth's face, and they stopped building the city. Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba.
9 So it was called Babel, for there our Father confused all the earth's language, and from there scattered them over all the earth's face. Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.
10 This is Shem's account: at 100, he fathered Arpachshad, two years after the flood. Tala libota ya Semi : Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
11 Shem lived 500 years after he fathered Arpachshad, and had other sons and daughters. Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
12 When Arpachshad had lived thirty-five years, he fathered Shelah. Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. »
13 Arpachshad lived 403 years after he fathered Shelah, and had other sons and daughters. Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
14 When Shelah had lived thirty years, he fathered Eber. Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi.
15 Shelah lived 403 years after he fathered Eber, and had other sons and daughters. Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
16 When Eber had lived thirty-four years, he fathered Peleg. Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
17 Eber lived 430 years after he fathered Peleg, and had other sons and daughters. Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
18 When Peleg had lived thirty years, he fathered Reu. Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu.
19 Peleg lived 209 years after he fathered Reu, and had other sons and daughters. Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
20 When Reu had lived thirty-two years, he fathered Serug. Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi.
21 Reu lived 207 years after he fathered Serug, and had other sons and daughters. Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
22 When Serug had lived thirty years, he fathered Nahor. Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori.
23 Serug lived 200 years after he fathered Nahor, and had other sons and daughters. Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
24 When Nahor had lived twenty-nine years, he fathered Terah. Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera.
25 Nahor lived 119 years after he fathered Terah, and had other sons and daughters. Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
26 When Terah had lived seventy years, he fathered Abram, Nahor, and Haran. Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani.
27 Now these are the generations of Terah. Terah fathered Abram, Nahor, and Haran; and Haran fathered Lot. Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.
28 Haran died in his birthplace, Ur of the Chaldeans, before his father Terah. Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki.
29 Abram and Nahor married; Abram's wife was Sarai, and Nahor's wife was Milcah, daughter of Haran, who was also the father of Iscah. Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. »
30 Now Sarai was unable to conceive; she had no children. Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te.
31 Terah took his son Abram, his grandson Lot son of Haran, and his daughter-in-law Sarai, Abram's wife, and left Ur of the Chaldeans for Canaan; they reached Haran and settled there. Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
32 Terah lived 205 years, and died in Haran. Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]